Bakristu to bandimi kati na losambo, sima ya liwa lya Charlie Kirk, fMobandisi ya Turning Point USA Bakristu to bandimi kati na losambo, sima ya liwa lya Charlie Kirk, fMobandisi ya Turning Point USA  (2025 Getty Images)

Eklezya Katolike ya Amerika esengi losambo na “eleko eye ya likàmà”

Na sima ya liwà lya moto moko ya mopelengano (politiki) na etúká ya Utah, bakonzi ya eklezya Katolike na États-Unis basengaki bato bábondela mpo na likambo ya mobulu oyo ezali konyokola bato na mboka mobimba.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Baepiskopo ya Katolike mpe bakambi ya Eklezia na Etats-Unis bayokaki mawa mpe basengaki boboto (kimya) nsima ya liwa ya Charlie Kirk, moto ya molende na makambo ya mopelengano (politiki), oyo akufaki na mokolo mwa zomi ya sanza ya libwa (10 septembre) na masasi, tango azalaki kosala lisukulu na Utah Valley University na Orem, na Utah.

Charlie Kirk azalaki na mibu tukù misato na moko (31 ans), bongo atiki mwasi wa ye mpe bana mibale ya mike. Liwa lya yé eyaki na ntango ya mobulu oyo ebulunganisaki bato na bamboka, o ekolo mobimba.

Tótika o maboko ma Nzambe mokumba ya bazwi likàmà.

Diocese ya Arlington emonisaki ‘te likambo oyo ya somo, eyei kobakisama na “kolandana ya mobulu ya mopelengano (politiki) mpe ya masanga ya bato” oyo ebomi bato mingi oyo basali eloko te na baposo eùti koleka. Kati na bango, bana mibale babomamaki na masasi na eteyelo moko na Minneapolis, mpe Iryna Zarutska, mopaya ya Ukraine oyo babomaki na kati ya engbunduka na engumba Charlotte, mpe sik’oyo Charlie Kirk, moto ya mopelengano (politiki) ya Amerika oyo azali kobundela makambo ya kala mpe mobandisi ya Turning Point Action. Na kati ya liyebisi lya dioseze, bakomaki boye: “Tozali kotika  moko moko ya baye bazwi likàmà epai ya Nzambe, Tata wa biso ya likoló mpe na Mobandisi mwa bomoi y abato banso, mpe epai ya Mwana wa yé Yezu- Kristu, mobandisi ya elikya na biso”.

Mbela mpo na boyambi makasi mpe na bomoko

Bakonzi ya mangomba bamonisaki ‘te makambo ya mobulu mona moùti na ezalela ya koboya Nzambe mpe na koboya kopesa moto lokumu. Mokanda mwango molobaki lisusu ‘te: “Tokoki kosilisa makambo mabe mana, bobele na kotiyáká motema mobimba epai ya Nzambe, na kokólisáká molende na biso mpo na Kristu mpe na Nsango-Elamu, na komonisáká bolingo ya solo-solo mpo na bato baye bamonisami kati na mibeko, mpe na kozongisáká bomipesi na biso mpo na bosembo mpe molongo ma bato”.

Bakebisaki bato ‘te; ekolo ezali na “ntango ya likàmà”,  kaka te mpo na bozangi boyokani na makambo ya politiki mpe matata, kasi mpe mpo na mikakatano ya makasi ya kobatela boyambi, libota mpe bomipesi ya bato banso mpo na kofanda elongo na kimya.

Losambo mpo ya Kimya

Na nsima ya likama liye, baepiskopo mpe bakambi ya eklezya Katolike na Etats-Unis mobimba basengi ‘te bàsambela to bàbondela mpo na libota ya Kirk, mpo na bato banso bakufi na mobulu moye moùtaki kosalema kala mingi te, mpe mpo na molimo ya kozongisa boyokani kati na bato ya Amerika. “Bobomi oyo ezali likambo ya mawa mpo na mboka na biso mpe mpo na bato banso ba mokili”, elobi Mgr Oscar A. Solis, episkopo ya Salt Lake City. Azali kolendisa bandimi(bakristu) na kosambela mpo na kimya mpe mpo na bososoli ya ekólo oyo esengeli “kolongola biso mbala moko mpo ya libela, na mobulu oyo ezangi ntina mpenza”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

 

12 sánzá ya libwa 2025, 16:16