2025.09.02 Liyangani ya mbala ya mibale ya basi ya Afrika oyo batangà Teoloji . 2025.09.02 Liyangani ya mbala ya mibale ya basi ya Afrika oyo batangà Teoloji . 

Na Nairobi, basi ba Afrika oyo batangà teoloji, basangani mpo na kotalela lisusu likambo lya Eklezya na ekeke eye ya tukù mibale na moko (XXIeS)

Eteyelo ya lingomba ya ba Jésuites ya Nairobi oyo etangami na nkombo ya Hekima University College (HUC), elongo nà mabongisi ma Doctoral Scholarship for African Women Theologians, bazali kolengele liyangani monene ya mbala ya mibale mpo na basi ba Afrika oyo batangaki Teoloji. Likanisi mokonzi na yango ezali : «Synodalité en action: émergence de nouvelles ecclésiologies, vitalité des femmes et discernement du leadership pour le XXIe siècle».

Albys KBD CP – Kinshasa/RDC

 

 Liyangani liye, elandi likita lya liboso esalemaki na 2023, mpo na kosepela mibu tukù minei (40 nans) ya lisungi monene oyo HUC apesaka mpo ‘te Basi ba Afrika bazwa mateya teoloji. Libakù lya yambo ezalaki mpo na kopesa bango lokumu to komatisa mongongo na ntina ya kelasi ya bango na elanga eye ya Teoloji. Mpe ya kolendisa masolo ya mayele mpe ya molimo kati na bilenge basi oyo bazali kati na koluka mpe na baye mosala esili bobele koyebana.

Likambo oyo esalemaki mpamba te balandi maloba ma Pàpa François oyo abengaki Eklezya ya Afrika na sinodi. Asengaki na bango ‘te bazala na mposa ya koyokelana mpe ya kosangana bang ona bango. Apesaki bango ndingisa ya kofungola esika mpo na kokabola mwa masolo, koyokana, koyekolana moko na basusu, mpo na ntina ya kotambola elongo na eklezya moko ya lisanga (Eglise synodale).

Eklezya “libota lya Nzambe” oyo ebongisami mpo na ba-Afrika

Eteyelo HUC ezwi likanisi lya mateya ma Santu Jean-Paul II, na mokanda mwa ye ya malendisi Ecclesia in Africa (1995). Kuna alobelaki ntina ya Eklezya lokola “libota lya Nzambe” na Afrika. Likanisi liye nde elendisi baeklezya ya bamboka na bomoko, masolo, boyokani mpe kozala lisanga kati na mangomba. Basengeli mpe kokokisa ba boséngà oyo ezali komonono mpenza mpe kokolisa to kotombola libota, moboko ya kilobi (avenire) ya mokili mpe ya Eklezia.  

Bosangani (Synodalité): Mingongo ya basi batangà Teoloji ya Afrika ezali koyokana
Bosangani (Synodalité): Mingongo ya basi batangà Teoloji ya Afrika ezali koyokana

Eklezya ya Afrika mpe etinda na yango ya lisangà (sinodi)

Lisangà mpo na bosangani, oyo Pàpa Francois abengisaki ekolo ya Afrika na mobù 2021 mpe esukaki na sànzà ya okotobe ya mobù 2024, ezali kosenga na eklezya motuya ya kozala bato ba Nzambe oyo bakotambolaka elongo kati na mabele ma bango moko. Abetaki nsete na bosangani ya moto nyonso mpo na etinda ya kosakola Nsango Elamu mpe na bosengà ya kokolisa ezalela ya kobateli mingi mpenza bana ya mike mpe babangé. Mpo ya kokokisa likanisi lina, lelomei, mituna mizali kosalema ndenge na ndenge; mpo na koyeba lolenge kani eklezya ya Afrika ekoki kokokisa etindà ya yé na lolenge ya bosangani (de manière synodale), kasi nakozanga kobosana ba ezalela ya mboka? Boniboni kokanisa lisusu lolenge ya kokamba, mpe kokolisa lolenge ya kosalela kibokonzi na botosi, n antina ya kontina. Boniboni kolendisa Lolenge kani ekoki kolendisa basi oyo bamibonzà na kozongisa lisusu bomoi mpe mosala mwa bango na molimo ya bosangani (sinodalite)?

Mikano mpe mikakatano ya liyangani ya 2025

Liyangani lya mobù moye, esengeli kosalema o mokolo mwa misato kino motoba ya sanzà ya settembe na HUC, na lisalisi lya Conrad Hilton Foundation, de Watawa wa Taa et du Doctoral Scholarship for African Women Theologians na lopoto elimboli ‘te: “bourse de doctorat pour les femmes théologiennes africaines” ; bongo ndimbola na yango na lingala ezali ‘te: lisungi lya mbongo mpo na kosunga Basi bazali kosala Teoloji na Afrika. Eteyelo ena ekopesa esika na basi oyo bayekolà Teoloji, mpo ‘te bakabola masolo na maye matali makambo oyo bakutaná na yango, mikakatano ma bango, mpe maye bazali kokanisa. Balingi kokolisa makoki mya mayele ma bango, mpo na kolakisa lolenge basi bakoki kokamba. Mpe bakolisa elimbo ya émancipation, bakela esika ya makasi epai wapi basi ya Afrika oyo bazwi mokano ya koluka luka, bakomipesa mp ona etindà ya eklezya na Afrika mpe bisika bisusu mosika.  

Na Kenya, na tango ya liyebisi lya liyangani ya mbala ya mibale ya basi ya Afrika oyo batangà Teoloji
Na Kenya, na tango ya liyebisi lya liyangani ya mbala ya mibale ya basi ya Afrika oyo batangà Teoloji

Mitó ya makanisi ndenge na ndenge mpe bomengo baye bazalo koloba bakomema

Ezali mpe na mitó ya makambo ya mikemike oyo ekolobelama, kati na yango tokoki kotanga: “kobongola lolenge ya kokamba na Afrika”, ezalela ya “komona, kosambisa mpe kosala” na etindà ya kopalinya Nsango Elamu, “ntina ya libateli o kati ya Eklezia”, “koyoka mingongo ya baye batiyami pembeni”, mpe “kozongisa kotalela bomoi ya basi bamibonzà na lingomba”. Liyangani lina likosangisa bateolojien baiké nà mpe bato ba Afrika ya mayele, na makambo ya teoloji. Libakù liye ekopesa esika malamu ya masolo kitoko mpe ya ndenge na ndenge.

O kati ya bango, ekozala na Teolojiene Thèrese Okure, oyo ayebani makasi mpo na misala mya yé ya Biblia, mpe ya Teoloji pastorale. Akomema maye akutànà na yango, na botangi liloba, mpe na kolobela bisika ya basi okati ya Biblia. Ekozala mpe nà Josée Ngalula, Mamelo mpe Motei na eteyelo ya likolo ya katoliko na RDCongo (Université catholique du Congo). Akolobela mokumba ya basi ya Afrika o kati ya eklezya, na ndakisa ya Sinosi sur la sinodalité. Bongo Dr Nora Nonterah, ya Kwame Nkrumah University of Science and Technology, akotalela boyokani kati na ba synodalité, gouvernance, genre mpe mateya ya malamu. Basi mingi ya teoloji, oyo bawuti na bikolo ndenge na ndenge ya Afrika, bakosangana na molulu mona. Bango mpe bakosangana mpo na kokolisa mpe kolendisa masolo ya teoloji na Afrika mobimba.

Kotonga Eklezia ya makasi ya lisangà mpe ya kosangana na Afrika

Likita likobanda o mokolo mwa mibale sanza ya libwa (2 septembre), nà bokomi ya basangani, ekosala mikolo minei, mpe ekosuka o mokolo mwa sambo ya sanza ya libwa (7 septembre), na misa mpe masolo ya nsuka. Marcel Uwineza, SJ, Mokambi ya HUC, na Jacinta Auma Opondo, FSSA, babengi basi banso ya teoloji ya Afrika mpo na kosangana. Oyo ezali eleko ya motuya ya masolo mpe ya bososoli, mpo na kotonga Eklezia ya lisanga oyo ezali na bomoi mpe ezali na kosangisa bato banso ba Afrika.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

03 sánzá ya libwa 2025, 15:21