2025.09.26 Bénin: Mamelo Anicette Ghislaine Quenum, Mokambi monene ya lingomba OCPSP (supérieure générale), na ekolo ya Bénin 2025.09.26 Bénin: Mamelo Anicette Ghislaine Quenum, Mokambi monene ya lingomba OCPSP (supérieure générale), na ekolo ya Bénin 

Zubilé ya ba catékisi: Kosakola Nsango Elamu epai ya babola, mosala ya ba OCPSP na Bénin

Ba Katekisi bakoya na Roma kobanda mokolo mwa 26 kino le 28 ya sànzà ya setembe mpo na zubile ya bango. Lokola ezali mokumba ya lingomba, bateyi ya katekisimo basangisaka bato banso, ezala balaiki to bamibonzà. Na lisolo moko nà bapanzi nsango ya Vatikan, Mamelo Anicette Ghislaine Quenum, mokambi monene ya Institut des Sœurs Oblates catéchistes Petites Servantes des Pauvres, alimboli te kozala katekisi ezali «misala ya bomoi oyo ezali kosala ‘te mongongo ya Nzambe eyokana na mokili».

Albys KBD CP – Kinshasa/RDC

 

Sango Émile François Barril nà Julia Nobre, elenge mwasi oyo lelo akomi mamelo mpe atangami na nkombo ya mamelo Élisabeth de la Trinité nde babandisaki na mokolo mwa 19 sànzà ya misato ya mobù 1914, lingomba «Institut ya baSœurs Oblates catéchistes Petites Servantes des Pauvres, (OCPSP). Ezwami na ekolo ya Bénin, bamamelo biye, bamipesi na mateya ya katékisimo mpe na mosala ya kosalisa babola.

Kosepela zubile ya bakatekisi lokola banzeneneke basolo ya Elikia  

Bamamelo ya OCPSP bazali kolikya kosepela zubile ya elikya bisika binso bazwami mpe bisika wapi basàkolaka Nsango Elamu lokola bakatekisi. Mamelo Quenum alobi ‘te: “Na libakù la zubile eye, balingi bazala banzeneneke solo ya Elikya, baliki balamu ya Nzambe” Bazali kosàlà makasi mpo na “kozala mwinda ekotinda bilembo bya bozali mpe boliki bwa Nzambe kati na mokili”. Ezali mbela bazali kobwaka mpo nna koluka nayino bosembo bwa nokonzi bwa likolo na “maye manso tozali kosala

Mamelo Quenum abeti nsete na koloba ‘te etinda na bango ya kozala katekisi, basalaka yango elongo na balaiki ya bapaloase ndenge na ndenge. Bazali kosalisa bango bayeba to bayekola. Tolekisaka mwa ntango ya malonga elongo na bango, lokola baezuzulu, mpe mateya misusu. Totangisaka katekisimo na bana, bilenge mpe baye bazali na makoki ya kotambola te (bakoka). Mosala moko ekomema lingomba na kosalisa moto, na makambo matali kokolisa moto na bomoi bwa ye mobimba na ye. Kobanda 2006, basango basalaki ebongiseli moko mpo na kosalisa bakoka, basi, bitike, mpe bana oyo bazali na mpasi.

O ebandela ezalakà se bokutani

Mamelo Quenum alobi ‘te lingomba yango ebandaki na likita moko esalemaki na sanza ya Febwali ya mobù 1910 kati na Sango François Baril mpe elenge mwasi moko ya Dahomey, Julia De Souza Nobre. Liboso ezalaki na mokakatano ya koteya basi ya Dahomey, mpamba te bazali babateli ya ezalela ya bonkoko. Ezali mokumba oyo ezalaki kopekisa ye asolola na mibali mpe mingi mingi na bapaya. De Souza Nobre azalaki na mposa ya kosalisa babola, oyo mingi kati na bango bazalaki mibange.

Mamelo Quenum alimboli ‘te “Sango Baril azalaki te na likanisi lya kofungola  lingomba lya basi, kasi nde ya kosala elongo na basi, basi oyo bakokaki kosala lokola moyokanisi kati na misionele mopaya, lokola yemei azalaki, mpe mpo na kosàla elongo na etuluku ya bato oyo bazalaki na likoki te ya kosangana na societè na eleko ena”. Na lisalisi ya bokutani na elenge mwasi Julia de Souza Sobre oyo ayaki kosenga ye toli. “Azalaki na mpenza komitungisa mpo na babola mpe azalaki na mposa ya komipesa mobimba mpo na kosalisa bango mpe kosakola Nsango Elamu”. Nde bongo, kofungola eteyelo ya basi ya mboka emonanaki lokola nzela ya malamu mpo na kopalanganisa nsango malamu epai ya basi ya Dahomey mpe mpo na komonisa motema mawa liboso ya bobola ya mosuni, ya elimo mpe ya bizaleli malamu.

Mikakatano ya kotalisa ut’o mibù 111

Nakotondo botondi mpo na mibù nkàmà moko na zomi na moko (111 ans) ya  eteyelo na bango, mamelo Quenum abendaki likebi ya bato na ntina ya kokomisa sika “charisme” na bango na kotalela makambo ma lingomba na mokili, bisika bizali kobakisama na bikolo bisusu na libanda ya Bénin. Kasi mamelo Quenum atomboli mikakatano misato: Ya yambo ezali koteya Nsango Elamu na katekisimo na mingi mpenza na misala kasi na maloba mpamba te. Alobi ‘te kozala mokatekisi elimboli kaka te koyeba mateya ma lingomba to kozala na mposa ya koyekola mateya ya katekisimo. Kasi esengeli kozala mongongo mwa Nzambe yemei na mokili. Eloko mosusu ezali bosenga ya koluka nzela ya kozala eklezia oyo ezali pembeni na bato oyo bazali na makoki te.

Na nsuka, “esengeli koyeba na lombangu likàmà oyo ezali kokómela ndako ya bato banso, bongo kobongola makanisi na biso na makambo matali ezingelo oyo ezali kotinda biso na kozwa mokumba ya kobatela ndako na biso”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

26 sánzá ya libwa 2025, 10:18