Episkopo ya lokumu Pissaballa, nkumu latin ya Yéruzalem Episkopo ya lokumu Pissaballa, nkumu latin ya Yéruzalem 

Episkopo ya lokúmu Pizzaballa: "Na Mabelé Esántu, lokásá mókó ya sika ekoki kobalusama"

Simá ya bondimi ya Hamas na mwángo y'Amerika, nkúmú latin ya Yerúzalem asáli nsakola mókó eye ekoloba elikya pe litambe ya yambo ezelamaki mingi po ya súka ya etumba. "Mingi etikali ya kosála, kasi lokóla Eklezia, tobéngami ya kobimisa liloba mókó ya elikya, ya kozua molende ya kosála lisikulu eye ekofúngola ba nzelá", elobaki ye.

Vatican News

"Úto mibú mibále, etumba ezui oyo ya ntina ya bokébi na bisó pe ya makási na bisó. Moto nionso ayébi, na mawa, eye elekaki na Gaza. Bobomi tángo insó ya ba civil, nzala, bokimi bisika na bisika, pási ya kokóta na ba lopitalo pe bozui lisálisi, bozangi bokolóngónó, na bobosani te baye bakangemi na pósá na bangó te". Po ya mbala ya yambo, elobi episkopo ya lokúmu Pierbattista Pizzaballa, "ba nsango mikoloba lokásá ya sika ya malamu ekoki kokóma, ya bobimisi bakangemi ya Israël, ya bato misusu ya Palestine pe ya bosúkisi ya bobwaki ba bombe pe mobúlú ya limpinga". Ezali bôngó nsakola ya Nkúmú latin ya Yerúzalem ebándi pe etindami na dioceze na ye nionso pe ebimi mobimba na site ya Patriarcat latin ya Yerúzalem, simá ya liloba ya Hamas na mwángo ya kimia ebongisamaki na mokónzi y'Amerika Donald Trump.

Masoló káti ya Israël pe Hamas

"Ezali litambe ya libosó pe ezelamaki úto kála", ekobaki nkúmú. Kasi "eloko mókó ekómi nanu polélé te pe esúkisami te, mituná mingi mizali na eyano te, mingi etikali ya kolimbola, pe tokoki te kozala na makanisi ya lokutá". Batindami ya Hamas pe ya Israël basengeli kobánda mokolo ya yambo 6 ya sánzá ya zómi na Egypito, masoló po ya kozua bobimisi ya bakangemi bazali na Gaza, pe kosúkisa simá ya mibú mibále etumba na mboka Palestine. Masoló mina mikosálema libosó ya bokundoli mibú mibále ya mobúlú ya Hamas na Israël na 7 ya sánzá ya zómi 2023, eye ememi etumba na Gaza, esika wápi limpinga ya Israël ekokoba misála na ye.

Mabótá ya bakangemi

"Tokozela eleko ya kosepela elongó na mabótá ya bakangemi, baye bakokoka kopesa ekópi na bandeko na bangó. Tolingi likambo yangó na mabótá ya bato ya Palestine baye bakokoka kopesa ekópi na baye bakobima na boloko", elingi episkopo ya lokúmu Pizzaballa. Na bosengi súka ya etumba eye ekokoka kopesa bokei ya sika po ya bansó, "kaka po ya bato ya Israël pe ya Palestine te, kasi lokóla po ya mokili mobimba", akobénga ya kozala miso ya kofúngwama. Po "etikali mingi ya kosála po kopesa Gaza lobi ya malongá. Bosili ya etumba ezali eténi ya yambo -eye esengeli- ya nzelá mókó etóndi na mabakú, na likambo mókó ezali nanu na mindondo", ekomaki ye.

Botáli ya nkúmú latin ya Yerúzalem ekokóma lokóla na Cisjordanie pe na ba mboka ya pembeni. Akobénga ya kobosana te 'te likambo ezali kokoba kobéba na Cisjordanie. "Makambo ya ndéngé na ndéngé miye masangá na bisó bazali kokutana na yangó bikómi mokolo na mokolo, mingi penza na bituka ya mike, mizingami pe mikangemi na mobúlú ya ba colons, na bobateli ya ntina epai ya bakonzi ya bokébi te".

Babéngami kozala elembo mókó ya elikya

Na nsakola na ye, episkopo ya lokúmu amóni lokóla 'te "bozangi peto na makambo mikokóma lobi, miye mitikali ya kolimbola, ekosálisa lokóla boyóki ya bobungi nzelá pe ekolendisa boyóki ya bozangi botiyi motéma". Kasi "ezali penza waná, lokóla Eklezia, nde tobéngami ya kobimisa liloba mókó ya elikya, ya kozala na mpiko ya lisikulu mókó eye ekofúngola ba nzelá, eye ekotónga na esika ya kobuka, mingi na misála pe makambo maye tokosála", ebakisaki ye

Boyambi ekóti etumba

Po ya episkopo ya lokúmu, ezali na makasi te ndé batóngaka boboto: “tomónaka na kála eye mobúlú pe makasi mibótaka”, ekundolaki ye, na boyébi ‘te likambo eye ekótisi “boyambi na bisó na etumba”. “Atá po ya mondimi mókó, ezali ya sóló te kobika na boyambi na bileko ya pási lokóla ya sik’oyo”. Kasi libosó ya eleko ya pási ena, alendisi, ya kozala na misó mitelemi epai ya Yézu. (cf. He 12,2). “Ezali se bôngó ndé tokokoka kokótisa sémbo káti na bisó mei pe ya kotála bosóló na misó mikéseni »

Mokolo ya 11 ya sánzá ya zómi, bomipimi pe losámbo po ya boboto

Na sánzá eye ebonzama na Ngondo Esántu, “tolingi tosámbela po na waná. Po ya kotikala pe kobatela motéma na bisó na mabé nionso pe eye ya baye balingi bolamu, sémbo pe bosóló. Po ya kozala na mpiko ya kokona mbuma ya bomoi atáko pási, po ya kokweya na likanisi ya bolongoli te pe ya bobwaki mosusu te”. Episkopo ya lokúmu akobénga lokóla kosámbela po ya masangá ya basáli na Nzámbe, po batikala na bomoko pe makasi, po ya bilengé, mabótá, basángó, bamofúlele pe banyango. Kasi lokóla po ya baye bansó bakomipesa na boluki esengo pe libondi na baye bazali na bozangi.

Na bokangami na mbela ya Papá Léon XIV oyo asakolaki ‘te póso 11 ya sánzá ya zómi mokolo ya bomipimi pe ya losámbo po ya boboto. Alendisi na nsakola na ye, masangá minsó ya bapaloise pe ya basáli ya Nzámbe ya kobongisa ndéngé balingi, po ya mokolo ena, bileko ya losámbo, ndakisa Rosario, adoration eucharistique, ba liturigie ya Liloba pe bileko lya kokabola.  

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo.

07 sánzá ya zómi 2025, 19:18