Boyokani mpo na mateya ma Afrika, kotalela lisusu mateya ma Katoliko
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Batindami ya ba acteurs ya Boyokani mpo na Mateya ma Afrika (Pacte Éducatif Africain) etambwisamaki to ekambamaki na Cardinal Antoine Kambanda, episkopo ya Kigali na Rwanda mpe chancelier monene ya Institut Pacte Éducatif Africain. Esangisaki ba episkopo ebele, mingi bazalaki ba episkopo ba Afrika, mpe bato mosusu ya mateya ya Katoliko oyo bautaki na mikili ndenge na ndenge. Esengeli kobeta nsete na kolobela likambo ya mitango ya bakonzi ya Dicastere Culture mpe ya Éducation. Nakolanda bango, balobi ‘te, biteyelo ya katoliko na Afrika ezali 43% ya biteyelo ya katoliko na mokili mobimba.
Mpo ya koteya mwana moko, esengeli na mboka mobimba
Tango azwaki maloba na congrès international, Episkopo wa lokumu Kambanda azongelaki ‘te Eklezia ya Afrika ezwi likanisi ya lisese ya Afrika. Yango nde epesaki Pape François makanisi ya kosala Pacte Éducatif Africain. Lisese lyango elobi noye : «mpo ya kobokolo to koteya mwana moko, esengaka mboka mobimba». Na komona mikakatano moye Afrika mpe mokili mobimba ezali kokutana na yango, Episkopo wa lokumu alendisaki ‘te «tosengeli kosala elongo, kosangisa makasi ma biso mpe kotia mayele ma biso ya mateya na masolo, mpo na koteya bilenge bya Afrika, bazala bato oyo bazali na mokumba mpe bazali na bomoko mpo na mikolo mizali koyà». Batindami ya Afrika basepelaki mingi koyoka ‘te Pape Léon XIV abakisi makambo masato o kati ya makambo 7 ya Pacte Mondial ya Education oyo Pape François atikaki. Na kati ya makambo misato oyo, mibale euti na Pacte Éducatif Africain. Ezali bongo mateya mpo na kimya mpe mateya mpo na bomoi soke. Likambo lya misato etaleli mateya mpo na culture numeriki, to koyeba kosalela ba apareyi ya mikolo oyo. Yango esengeli kobenda likebi ya biteyelo mpe ba iniversite ya Katoliko na Afrika, mpo kosalela ba réseaux sociaux mpe ba technologies mosusu ya digital ezali se kobakisama na Afrika, mingi mpenza epai ya bilenge. Ezali na matomba mingi, kasi ezali mpe na mwa mikakatano. Mateya ya katoliko na Afrika esengeli kotiya yango (culture numérique) na lombango mpenza.
Kotángisa mpo na kopesa biyano na mikakatano mya lelo mpe ya lobi
Episkopo wa lokumu Kambanda, abeti nsete na bosengà ya kotalela lisusu mateya ya Katoliko, mpo ‘te ezala eyano liboso lya mikakatano ya Afrika. Mpo na yango, na makanisi ma ye, eteyelo ya katoliko esengeli kofungola miso na mikakatano ya mabele ma Afrika mpe na bamposa ya bilenge, mpo ‘te ezala esika ya kozwa biyano. Asengeli kozwa mokumba ya koteya bana basi. Esangana na makambo ya mboka mpe ya nkita; ezala ya bato nyonso, mpe epesa mateya ya molimo mpe ya bonene. Na makanisi ya Episkopo wa lokumu, mateya ya Katoliko esengeli kozala ndakisa na Afrika, na nzela ya mateya ya ezingelo mpe ya ba numériki. Asalaki lisungi mpo na mateya ma Katoliko oyo ekotalela mateya ma kelasi, oyo epesamaki na mimeseno mya Afrika mpe ekolendisa makanisi mya ntina.
Boyokani bwa sika ya bateyi to balakisi mpo na mateya oyo ezali kobongola
Likanisi mokonzi linà ezwaki ndimbola monene na lisukulu lya Episkopo Kambanda, oyo abeti nsete ‘te mateya ma katoliko masengeli kotalela mabota mpe kokota na boyokani to kozala na masolo elongo na mbulamatari to letà tango inso. “Bato banso basengeli kosangana mpo na kobokola to koteya bana malamu, mingi mpenza baboti”. Mabota mazali esika ya liboso, “esika ya kobokolo to koteya bana”. Eteyelo ya katoliko esengeli kosunga baboti na bango mpo na kokokisa mokumba na bango ya koteya. Mpamba te, baboti mingi bazali na makoki te ya kosunga bana ba bango na kelasi na kati ya mabota na biso ya mikolo mya lelo. Bakonzi basengeli te kosuka kaka na kosepela na mateya ya Katoliko, kasi basengeli mpe kondima ‘te mateya mànà mazala malamu. Kardinale asengi na bango ‘te bàsunga na mosolo eteyelo ya Katoliko mpe bàsenga na Eklezia ‘te esala mingi mpo na kobongisa mibeko mya kelasi.
Kokómisa mateya ma Katoliko esika ya sika ya bondeko ya bato
Mpo na ye, likanisi lya etuluku ya minzoto ezali komonisa ‘te esengeli kosala elongo mpo na kopesa elikya na mokili moye mozali na mposa na yango. Na yango, mokambi monene ya Institut Pacte Éducatif Africain asukisaki lisikulu na ye na kobet nsete mpo na bosenga ya kokomisa mateya ma katoliko esika ya sika ya bondeko mpe ya bondeko kati na bato. Na eleko eye epai wapi bato ba mopelengano to politiki bazali kotonga bifelo kati na bato, “biso, tozali kokomosa mateya esika ya lisanga, ya bondeko mpe ya bomoko kati na bato banso na Yezu Kristu Mobikisi wa biso”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.