Mokambi ya ACE asengi na ba Jésuites bàtala mikolo mikoya na elikya
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
“Province ya Afrique centrale ezali na bikolo mibale: Républiki démocratiki ya Congo mpe Angola. Alobi, mpe abakisi ‘te ezali na boyokani ya makasi na makambo ya kala mpe ya bonkoko oyo ezali na kati ya bikolo yango mibale”. Na ntango ya kala, bokonzi ya Kongo esangisaki eteni monene ya “Angola, RDC na mpe Congo-Brazzaville”.
Kobanda na ebandeli, Sango Kyungu alobeli mikakatano mya minene na mikili mibale oyo ezali na Province na ye, oyo etali mingi-mingi na boyokani na makambo ya sociopolitique: “Ezali mikili oyo ezangi kimya, oyo ezali mpe kobimisa mikakatano na likambo ya nkita”. Liboso lya likambo liye, la Compagnie de Jésus elingi kozala pene na bato: “Tozali kosala elongo na Eklezia mobimba mpo na kosenga bosembo koleka, mpo ‘te bato bazala na lokumu”.
Koteya ezali likonzi ya (mosala) ya ba jésuites
Lokola bazali na loboko na mimeseno ya bonkoko ya Santu Ignace, Tata provincial alimbolaki ‘te mateya makotikala tango inso na esika ya liboso kati na mosala ya ba Jésuites na ACE. “Tozali na ba collèges mpe université, mpe bisika binso tokutanaka na bana ba biso ya kelasi ya kala oyo batángá malamu”. Abakisi ‘te na Angola, bazali kotonga eteyelo ya sika; ezali bongo elembo ya bomipesi ya sika mpo na bilenge.
“Tozali kotonga eteyelo ya kati-kati na Banza Kongo, na etúká ya Zaïre. Ezali projet oyo tozali kozela kala, mpe tozali na elikya ya kofungola ba kelasi mpe mateya na mbula ya kelasi oyo ezali koya”. Alobi ‘te mosala ya koteya esengi mpe kotia likebi na bilenge oyo bazali na likàmà: “Tolingi kopesa mateya na bilenge basi mpe na babola”.
Lolenge yoko, ACE ezali kosala na biteyelo ya likolo, na Université Loyola ya Congo, na Kinshasa, oyo ezali ya sika, kasi ezali na bomengo tradition ya kala: “ekokisaki mibu zomi na mobu moleki, kasi ebandaki kala koleka, na faculte ya philosophie oyo esali mibu tuku sambo na motoba (76 ans)”, elobi Tata provincial, mpe abakisi ‘te eteyelo yango ezali kokola na ba faculte ya sika ya science, technologie mpe économie. Alobi ‘te ba Jésuites bazali mpe kopesa mateya na ba universités misusu ya Katoliko mpe ya Leta na mboka, mpe na Angola.
Kosolola mpe kofungwama: Bosangani na esika ya kowelana
ACE ezali etúká moko oyo bato mingi bazali bakristu, mpe kosolola kati na mangomba ezali na lolenge moko ya sikisiki. “Epai na biso, masolo mazali kosalema mingimingi kati na mangomba ya bakristu”. Amonisi ‘te ba Jésuites bazali kosala elongo na ba Protestants, ba Evangéliques to ba Musulmans, mingimingi na biteyelo mpe na ba centres ya formation, kasi bazali kosala yango te lokola “apostolat principal”.
Kobatela ndako ya bato banso - Mokumba ya elimo mpe ya bato banso
Ba Jésuites bazali kosala na nzela ya Réseau mpo na Bassin ya Congo (REBAC), esaleli ya sikisiki mpo na coordination écologique. Na yango, Bassin ya Congo ezali «poumon écologique ya mabele». Alobi ‘te yango ezali kosenga na biso ‘te toyeba mokumba mwa biso ya “kokeba na kobebisa te zamba na biso mpe tobatela mai ya ebale Congo”. Kasi mosala mwa biso esuki kaka na zamba te: “Ndako ya bato banso, ezali mpe kopetola (kosukola) bingumba bya biso. Mbala mingi bisika oyo tofandi ezalaka na bosoto; yango wana tosengeli koteya bato bábatelaka esika bafandi”.
Mabyangi nzike mpe ezali kolaka malamu
Atako mikakatano mizali, Province ya Afrique Centrale ezali na nguya ya ba vocation. “Tozali kotonda Nzambe. Mbula na mbula, bilenge pene na ntuku mibale bakotaka na noviciat ya Kisantu, ndambo bazali ba Congolais, ndambo ba Angolais”, elobi tata provincial. Alendisi na oyo etali botuya ya kopono: “Ezali motango te, kasi motuya ya mateya”. Alendisaki lisusu ba Jésuites mpo ‘te moto na moto azala na makoki ma ye mpo na kokolisa mosala mwa ye. Amonisaki mpe ntina ya “koyebisa bilenge ‘te ebongi mpenza komibonza na bomoi bwa bango mp ona eloko oyo ezali na ntina ya malamu”.
Lobi ya biso na maboko ma Nzambe
Mpo na oyo etali lolenge nini azali komona kilobi (avenire) ya ACE, Sango Kyungu akanisi ‘te “lobi ezali na maboko ma Nzambe. Ezali Nzambe ndemoto atambwisaka lingomba na ye mpe apesaka bato mosala (abengaka basali). Soki totikali na boyoki bwa elimo na ye, akomema biso esika inso, epai wapi ye alingi”. Bongo asukisaki na maloba ya elikya ‘te: “Nazali komona mikolo mizali koya na elikya. Nzambe akokoba kobenga mpe kofungola nzela mpo na lokumu la ye lonene”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye