Bansango ya bikela bya Orient ya mokolo mwa 3 Desembe 2025
Pàpa na Turquie
Na Turquie, esika ya liboso ya mobembo mwa ye o kati ya etúká, Pápa Léon XIV asepelaki bokundoli bwa mibu 1 700 ya likita monene ya Nicée. Na Lingomba ya Ortodokse ya Arménie na engumba Istanbul, alobelaki mingi mpiko oyo bakristu ya Arménie bamonisaki na boumeli ya bikeke, mbala mingi na ntango ya mpasi. Mokonzi monene ya Eklezya Katoliko akutanaki mpe na bakonzi ya Leta mpe bakonzi ya mangomba mpo na komonisa ntina ya kofanda elongo, esika moko kati na bato ya mboka oyo etondi na Bamizilma. Mobembo mona momonisaki esika ya bakristu na Turquie mpe ntina ya komipesa mpo na Boboto (kimya).
Pàpa na lopitalo ya Croix na Liban
Na Liban, Pape Léon XIV akendeki na lopitalo ya bokono ya makanisi ya lingomba ya ba Sœurs Franciscaines de la Croix na Jal el-Dib, oyo ezali lopitalo kaka moko ya bokono ya makanisi na mboka wana. Ezali na bato ya maladi koleka nkama mwambe (800). Apesaki longonya na mosala ya minganga mpe ya bamamelo oyo bazali kokoba mosala na bango atako mikakatano ya nkita mpe ya bomoi ya bato ezali kolembisa ebongiseli ene ya bokolongonu bwa nzoto. Akundwelaki bato ya maladi mpe basàli ‘te bazali: “na motema mpe na mabondeli ma Nzambe”. Lopitalo yango ezali na ntina mingi mpo na mabota mpe mpo na koyekolisa bato ya mosala, kasi ezali na likama ya kolimwa to kosuka mpo na bozangi lisungi ya Leta.
Pàpa liboso lya bilenge na Liban
Na ndako ya Patriarche to mokonzi ya Lingomba ya Maronite na Bkerké, na Nordi ya Beyrouth, Pàpa Léon XIV ayambamaki na bilenge koleka 10 000 ya Liban, elongo na batindami oyo bautaki na Syrie mpe Iraq. Abyangaki bango na bolimbisi mpe na kimya, mpe alendisaki bango ‘te batikala na mosala ya kotonga mboka, atako mikakatano mpe matata ezali na etuka. Mokonzi Ntoma Monene alendisaki bango na lotomo la bango la ntina mpo na lobi (avenire) ya Liban mpe alendisaki bango na kolekisa ba mpota ya kala mpo na kotonga mboka ya bosembo mpe ya bondeko.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye