Boyokani bwa sika kati na SCEAM mpe AU mpo na kimya mpe bokóli
Albys KBD, CP- Kinshasa/RDC
Bozongisi sika ya boyokani boye, bozali kaka likambo lya Leta te, kasi ezali mpe molongo mya makambo makosala. Na masolo asalaki elongo na bapanzi nsango ya Saint-Siege, Kardinal Fridolin Ambongo, Episkopo-Mokonzi ya Kinshasa mpe Mokambi ya SCEAM, azongelaki makambo minene ya boyokani bwango, oyo etaleli makambo mitano ya minene: kopekisa bitumba, kotala maponami, bomoko ya bato, boyokani kati na biyamba mpe lotomo ya bato.
Na moyi mwa lelo, na mabele ma Afrika mobimba, ezali na mwa matata, lokola ndé batye esobe moto. Mokonzi ya SCEAM alimboli ‘te “Eklezia ekoki kopesa lisungi na yango na bikolo mpo na kopekisa matata mana na nzela ya kokolisa mayele ya bososoli”. Mpe abakisi ‘te na maye matali boyangeli, ntina ya mateya ya bana-mboka mpo na kobatela bopolele to bosolo ya maponami, ezali ya ntina mingi: “Mokakatano ezali ‘te mokano mwa bato etosama ntango inso”.
Kotika Bowelani to mpaka to mpe momekano mpo na kosalela bato
Ntango batunaki ye mpo na ntina ya mokanda monà, Ambongo alobaki ‘te ezali liboso lya nyonso mpo na kopesa nzela na mibeko mpe bibongiseli mpo na mosala moye Lingomba ezali kosala mokolo na mokolo na esika oyo bazali. “Likambo lya mawa, na bikólo bisusu, bato bazali komona ‘te mangomba mazali kosala matata. Tolingi kokima lolenge wana ya kolimbolama mpo ‘te tokoka kosala elongo na biteni oyo bizali kopesa litomba na bato”. Atako protocole wana ezali mobeko ya mokano malamu kasi ezali mobeko makasi te, episkopo ya Kinshasa asepeli na lisungi ya bakambi ya bikolo, mpe alobeli masolo ya malamu oyo asalaki na mokonzi ya Burundi, Évariste Ndayishimiye, oyo akozala mokambi ya UA.
Atako mokanda mwango mozali “maloba mwa makanisi malamu”, na esika ya lotomo ya kobanga, archeveque ya Kinshasa asepeli makasi na lisungi lya mokambi mwa ekolo. Atàngi bongo masolo ma motuya oyo asololaki na Évariste Ndayishimiye, oyo akokóma prezida to mokambi ya Bosangani bwa Afrika (Union africaine UA).
Eklezya na esika ya liboso ya Bosangani bwa Afika oyo ezali koluka kosama malamu
Liboso lya botyoli ya mbala na mbala na ntina ya Bozangi nguya ya Union ya Afrika, mingi mpenza na etuka ya bitimà binene (Grands Lacs), Kardinal Ambongo alobi ‘te alingi komona UA ya makasi koleka. Na esika ya komona ‘te Afrika ekoki kosala eloko moko te, yé apesi likanisi lyoko lilamu, alobi ‘te: “Tókende kokutana na Union ya Afrika mpe topesa likabo na biso mpo na kolendisa mosala moye”.
Mayi mpe Bopeto, lotomo to makambo ma ntina mpo na 2026
Mwa mikolo liboso lya kotiya mokoloto ya boyokani bonà, SCEAM ebimisaki mpe “Déclaration d’Addis-Abeba 2026” mpo na kobatela mai, oyo eyokani na motó ya likambo ya mobu ya AU. Mpo na Eklezya ya Katoliko, kozwa mai ya peto ezali mokakatano monene mpo na bato.
Na kosukisa, Episkopo wa lokumu abwakaki mbela na maloba ma elikya, bongo akundolaki maloba ma Pape Léon XIV, tango alobelaki Afrika, atangaki ye lokola “mokili mwa elikya”, mokili moye esengeli te kokitisa maboko, to mpe kolembe nzoto zambi lobi ezali o maboko ma yé.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.