RDC : masolo ya bato banso lokola nzela ya bomoko bwa ekolo.
Albys KBD CP – Kinshasa/RDC
Liyangani ya bikolo na mokili, ya mbala ya minei (4e édition ya Colloque international) mpe interdisciplinaire ya Université Katoliki Omnia Omnibus esukaki o mokolo mwa mosala minei (jeudi) 22 mai na Kinshasa. Sima ya mikolo misato ya masolo matali avenire, ya bomoko ya ekolo ya Repibliki Demokratiki ya Congo. Likanisi ntina ya liyangani eye ezali: “RDC liboso lya mikakatano mpo ya kozala na bomoko to kofanda na kimya elongo na basusu. Masolo kati na bato ezali eyano to ndimbola ya krise ya bomoko ya ekóló mobimba ? ”. Bokutani bolekaki na esika ya eteyelo ya likolo, esangisaki balukiluki, bakambi ya baeklezya, batindami ya societe sivili. Basanganaki na likambo ya mikakatano ya bokengi, makambo mya mibeko mya ekolo mpe makambo mazali koleka kati na bato na ekolo Congo. Na mwa masolo apesaki na ba médias ya Vatikan, Abbé Christian Ngazin, mokambi ya Université Omnia Omnibus, azongelaki kolobela ntina ya bokutani bonà ya mbala ya minei o mobù, oyo elengelamaki na institution ya eteyelo yango.
Alimboli ‘te: “likita linà libandaki na likambo bamonaki, lolenge ekólo ezali kotambola, ezali na bondongwani mp ona likambo lya bozalani elongo. Balingaki kosolola mpo na kokanisa lolenge kani kozwa ndimbola to biyano ya kozala na bomoko mpe kotombola bokambi bolamu o kati ya ekolo”.
Mpo na yé, masolo mànà masalemaki na mpó ya bomanyoli ya bato bamayele ya siansi mpe morali. Basengeli koluka biyano, kopesa makanisi masolo mpo na kolendisa boyokani to bomoko ya ekólo, na eleko eye bozangi bokengi ezali sé kokóba, bongo mangilipa mazali mpe mingi o kati ya mopelengano to politiki.
Biteni banei ya masolo mabango
Mosala mwa likita lyango mobongisamaki zingazinga ya makambo minene minei.
Mpo ya yambo, elobelaki makoki ya bozalani-elongo na boyokani to bomoko. Bayekolaki lolenge ya “kokólisa masóló, na nzela ya Filosofie na Politiki, ya mibeko mpe koyekola lolenge ya kotalela makambo malekaka kala”. Basangani ya likita ba évaluaki pratique ya ba consultations ya politiki na RDC, ba racine historiques na yango, kokundola lolenge ya esaleli ya politiki mpe baye bazali kosalela (acteurs) mpe évaluation ya portée na yango.
Ya mibale epesamaki mpo na koyeba makambo oyo ezali kosalema lelo mpo na koyeba bantina ya bokabwani kati na bato mpe na politiki. Baye bazwaki maloba, batalaki malamu ba cartographie ya bokabwani socio-historiki, o kati ya ba engumba, ya ba mboka, ya mopelengano to ya politiki, ya géopolitiki mpe ya géostratégiki na RDC. Mpe atalelaki position na yango lokola « Ekolo eyano (pays ya solution)» liboso lya makambo ma mokili mobimba mpe alukaki ba sources historiki oyo elongolaka kimya na yango (sa déstabilisation).
Eteni ya misato etalelaki « masolo maye makotalaka bato banso, krize ya mibeko ya ekolo mpe mikakatano mp ona bokengi ya ekolo». Balobelaki makambo ndenge na ndenge, mingi mpenza kobongisa lisusu likambo lya libateli, likàmà ya bozangi bokengi, mokumba ya baekolo ya nzinga nzinga oyo ezali kolongola kimya na yango, nà mpe evaluation ya mibeko ya 18 Febuali 2006.
Na nsuka, eteni ya minei balobelaki mokumba ya eklezya mpe ya mangomba mpo na kokotisa kimya kati n abato. Na eteni eye, basangani ya likita lyango bamanyolaki na ntina ya mokumba mya mangomba, ezalela elamu ya ba-imboka, bososoli na kozala bana-mboka, bokambi na lolenge ya malamu mpe bosangani ya ba-acteurs ya societe sivili, ba parti politiki na mosala mwa bango, mpo na boyokani kati na bato na kimya (pacte social de paix).
Likita moko ya ntina mingi mpo na ebandela
O kati ya biloko bya ntina ya édition oyo, Recteur ya Université akumisaki ebandela ya likita, oyo esalemaki na lisalisi lya molakisi to professeur émérite Willy Bongopa. Elobelaki ba fondements théoriki ya bozalani-elongo na boyokani.
Mpo na basangani, masolo ma ekolo maye mazali kosangisa bato banso emonani lokola nzela mosusu na nzela ya ba mécanismes constitutionnels té, kasi lokola complément essentiel na processus ya kokotisa mboka na kimya.
Likàmà ya «monologue croisé»
Na tango batunaki ye mpo na mikakatano ya kosolola ya sóló oyo esengeli koangisa bato banso, Sàngó Ngazain apamelaki maye abengi « monologue croisé », esika ba intérêts particuliers ezuaka esika ya liboso likolo lya bolamu bwa bato banso. Tango bato bazali koyà mpo na kabola bokonzi na esika ya kotombola litomba linene ya masolo ya solo-solo ekoki kozala te. Mpo na ye, elonga ya masolo to dialogue national esengi mpenza mposa ya solo ya kosalela matomba manene (intérêt général).
Lolenge ya komono makambo mikolo mikoyà
Na suka ya liyangani liye ya mbala ya minei, baye babongisaki yango, bazali kolikya ‘te makanisi maye balobeli to esalemi na Kinshasa ekosalisa na koleisa ba makita ya ekolo mpo na kimya, lolenge ya kokamba ekolo mpe bomoko kati na bato na boyokani.
Édition oyo ya minei epesi biso, biso lokola ekólo ya Congo,lolenge ya komono to ya koluka kokende liboso na tina ya kopekisa krise oyo tozali kokutana na yango sik’oyo. Dialogue national inclusif etikali nzela oyo ya bokonzi, kasi na ntina ‘te ezala lisolo ya solo (vraie dialogue), esimbami na litomba monene mpo na ya bato banso.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.