Léon XIV ayambaki Karekine II, Catholicos ya ba Armeniens banso.

Pápa ayambaki Tata monene (Patriarche suprême) catholicos ya Arménie mobimba na Castel Gandolfo, o mokolo mwa mibale, 16 Setémbé. Mokonzi ya lingomba ya Armenie abengaki Mokonzi ntomà monene, mpo ‘te akende na Arménie, mpo na ntina ya kimya to boboto. Azali bongo Pápa ya minei oyo Karekin II akutanaki na ye, ut’o akutanaki nà Jean-Paul II, na nsima nà Benoît XVI, mpe mbala na mbala nà François.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Karekine II, catholicos ya ba Arméniens nyonso, ayambamaki na Pape o mokolo mwa mosàlà mibale na tongo, mwa zomi na motoba ya sànzà ya libwa to setémbe (16 septembre). Bokutani bosalemaki na Villa Barberini, ndako ya Pápa na Castel Gandolfo, epai wapi Leo XIV akendeki mokolo mwa yambo na mpokwa. Ezalaki mbala ya liboso akutana nà Léon XIV, kasi asi akutanaki mpe nà baPàpa misusu, oyo ezali mbala ya minei, ut’o mibù tukù mibale na mitano kobanda baponaki na bokonzi ya lingomba ya ba Armeni banso. Likita oyo lisalemaki kati na “molimo ya bondeko mpe ya motema malamu, na tango ya masolo, batalelaki makambo ndenge na ndenge ya Eklezia mpe Patriarche ya Arménie abetaki nsete na ezalela ya ba Arméniens ya Artsakh na mikolo mikoya”.

Elimboli yango Kati na lisoló moko na tshombo elongo na bakomi ya Armenie na Radio Vatican, Episkopo monene, Khajag Barsamian, motindami ya Eglise Apostolique ya Arménie na Etchmiadzin na Saint-Siège. Barsamian alobi lisusu ‘te, mokonzi ya lingomba abengisaki pápa, akende na Arménie. Nzokande, bango mibale, bazali komona ntina ya boboto to kimya. Kimya oyo esimbami na bosembo, lokola Karekin II amonisaki yango.

Mobembo ya liboso na Vatican na mobu 2000 mpe mokanda ya boyokani

Batindami banso oyo bakendeki elongo nà Karekine II, na Vatican bazalaki wana. Ezalaki bokutani ya liboso kati na Pápa Léon XIV mpe Karekin II. Kasi na kala, Karekine II akutanaki na Pàpa Jean Paul II o mokolo mwa 9 na 10 ya sànzà ya zomi na moko (novembe) na libakù lya Zubilé ya mobù 2000. Bokutani bona esalemaki mp ona kozongisa boyokani mpe kotambola elongo kati na mangomba miye mibale, ut’o masolo ma Pàpa Paul VI nà Bosantu bwa ye Vasken Ier o mokolom mwa 12 ya sànzà ya mai ya mobù 1970.  Eklezya lokola nzoto ya Kristu, ezali bobele se moko. Yango nde kondima (boyambi) na biso, oyo esimbami na mateya ma bapostolu mpe ya batata bya eklezya, elobaki mokanda mwango. Tokotika te kobondela mpo na bomoko bwa solo mpe oyo ekomonana polele kati na biso. Na libakù linà, Santu Pàpa jean Paul II akabelaki Karekine II ba reliques ya santu Grégoire l’illuminatore. Bongo mobu moko sima, o mokolo mwa 25 kino moye mwa 27 ya sànzà ya setembe ya 2001, Pàpa oyo ya ekolo ya Pologne akendaki na Armenie, na libakù lya bosepeli milulu mya 1700è ya bosakoli bwa bokristu na ekolo ya Armenie. Azalaki Pàpa ya yambo oyo atiyaki makolo na mabele mana. Ba reliques ya santu Grégoire epesamaki mpe lokola na patriarche ya ndako monene (Grande Maison) ya Cilicie ya ba Arméniens, Aram Ier, mpe na patriarche arménien catholique ya eleko ena, Sa Béatitude Nerses Bedros XIX Tarmouni.

Bokutani nà Benoit XVI mpe François

Nsima ya bilembo ya Pàpa Jean Paul II, Karekine II azongaki na mobembo na Vatican o mokolo mwa 6 kino moye mwa 9 ya sànzà ya mai ya mobù 2008. Pàpa Benoît XVI nde mutu abengaki yé. Sima lisusu na 2015 kobanda mokolo mwa 12 ya sànzà ya aprili, na bosenga ya François ya kosala elongo na bakambi ya mangomba mpe eklezya ya Armenie. Na misa mwa bokundoli basantu bamartiro baarmeniens oyo bakufaki na mobù 1915, mokambi ya eklezya ya Armenie oyo ezwami na Etchmidazin azalaki elongo ; bongo ba komisaki Santu Grégoire de Narek, Docteur ya eklezya ya mokili mobimba. Bokutani mosusu esalemaki na sànza ya yuni ya 2016, mosusu na 2018, tango François, mpo na kokumisa Santu Grégoire Narek, atiyaki ekeko na ye na lobala ya Vatikan. Na libakù linà, Karekine II mpe azalaki elongo na bango, nà mpe mokonzi wa mboka Armenie ya eleko ena, Serzh Sargsyan. Bokutani mosusu esalemaki na sànzà ya setembe ya mobù 2020, epai wapi mokonzi ya eklezya katoliko alakisaki Pápa makambo oyo esalemaki nsima ya bitumba oyo babundisaki bato ya Artsakh. Na nsima amonisaki ntina ya maloba ya Mokonzi Ntoma Monene mpo na kosilisa matata mpe kozongisa kimya.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

16 sánzá ya libwa 2025, 20:38