«Mpo na boyokani bwa biso nà bikelamu binso », likanisi lya Pápa na losambo mpo na sànzà ya Setémbe (to ya libwa)
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Léon ya zomi na minei (XIV) asengi na Eklezia ya mokili mobimba ‘te na sanza oyo ya Setémbe, babondela “Mpo na boyokani bwa biso na bikela binso oyo Nzambe akelá”. Solo, bilili bya sika ya Papa - oyo esalemi nalisalisi lya Réseau Mondial de Prière du Pape na boyokani nà dicastère pour le Service du Développement Humain Intégral – na sànzà eye ; manso makomisami na ntina ya libakù lya milulu to feti ya eleko eye ya Bozalisi(bikela). Ezali likanisi ya lisàngà ya baeklezya – oyo esalemaka mbula na mbula kobanda mokolo mwa yambo ya sànzà ya libwa (setémbe) kino mokolo mwa minei ya sànzà ya zomi, mokolo mwa Santu François ya Assise (du 1er septembre au 04 octobre) - oyo ezali kokundola makambo mibale: bambula nkàmà mwambe (800ème) ya loyembo la bikelamu ya Santu François ya Assise mpe bambula zomi 10ème ya Encycliki Laudato Si’ ya Pàpa François.
Bosepeli mbala mibale
Na Castel Gandolfo, Pàpa Léon ya zomi na minei asilaki kokamba misa ya yambo mpo na libateli ya bikela (sauvegarde de la Création) na Borgo Laudato si’. Pàpa François asengaki esika ena ut’o 2023. Esika yango ezwami na ndako epai wapi baPàpa bakendaka kopema na eleko ya molungé. Ekabwani na Roma na ntaka ya 25 km.
Tózala na limemya mpo na oyo Nzambe akelá
Na losambo la yé, Pàpa asengi boye: “Salisá biso na komona bozalisi bwa yo, na bikelamu binso, mpo ‘te na nzela na yango, tomona mokumba tozali na yango ya kobatela ndako oyo ya bato banso, esika wapi osengi na biso nakobatela, kotósa mpe kobatela bomoi na mitindo minso ezalisami mpe na makoki mansoazali na yango”. Lisusu, Episkopo wa Roma, lokola mpo na kolakisa ‘te mateya na ye ezali kokoba na oyo ya François, asengi na bakristu basambela mpo ‘te, nandakisa ya Santu François, tomona boyokani bwa biso na bikelamu binso, oyo Nzambe alingaka mpe ebongi ‘te tólinga mpe tótosa yango. “Kaka na ndakisa ya Santu François ya Assizi”, ekobi Pàpa Leon na kosambela ‘te: “tolingi koyebisa na Yo lelo ‘te: O zwa lokumu Mokonzi wa ngai”.
Kobatela ndako ya lisàngà
“Zubile ya Elikya mpe mibu zomi (10 ans) ya Encyclique Laudato Si’; ezali kobengisa biso na eleko ya botondi, ya komipesa mpe ya kokanisa mpo na libateli ya ndako na biso ya lisànga”, ebakisaki episkopo wa lokumu Michael Czerny S.J., préfet ya dicastère pour le Service du Développement humain intégral. Asalaki elongo, misa ya yambo mp ona libateli ya ndako ya lisàngà. “Bikelamu binso oyo Nzambe akelá, ata biloko ya mikemike, emonisaka bolingo bwa ye. Na nzela ya losambo (to ya libondeli), tondimaka ‘te bomoi bwa moto ezali na motuya mpe ezali mosantu. Tata Mosantu alendisi biso tómona bozalisi bwa ye (to mona ‘te Nzambe azali) kati na biloko bizalisami. Abakisaki ‘te, na kotala yango, tobyangami na kobatela yango, kozongisa boyokani kati na ye, kozala na boyokani nà yango, kokumisa yango na elimo ya bosakoli, komemya bato banso mpe kosala mpo na kimya ya libela mpe ya makasi”.
Kobatela biloko bizalisami - Likambo ya kondima mpe ya bomoto
Na maloba ma ye, Mokonzi ntomà monene,alobi ‘te: bosembo mpo na makambo matali ezingelo “tokoki lisusu te kotalela lokola likanisi ya mpamba to mokano moko ya mosika, kasi ezali mposa moko ya lombangu, oyo eleki bobele kobatela ezingelo”. Episkopo ya Roma alobaki ‘te “oyo ezali mpenza ntango ya kosalela maloba ma biso”. Mpo na bakristu, kozala babateli ya biloko oyo Nzambe akelá ezali na ntina mingi mpo na kozala na bomoi ya malamu. Sé bongo, mboto ya boyengebene ekobima mingi mpe ekotya kimya mpe elikya.
Kolanda ndakisa ya Santu François.
Mpo na directeur international du Réseau Mondial ya losambo la Pàpa, Sango Cristóbal Fones S.J., likanisi la losambo ya Pàpa ya sanza eye, «ekobyanga biso na koyeba ‘te : mokili na biso ezali na boyokani kati na yango: tokoki te kokabola bolamu ya moto nà oyo ya bikelamu bisusu na mabele mpe ya bokolongono bwa mabele ma biso». Mpe akobi na koloba ‘te : Pàpa asengi biso tokanisaka ndenge oyo misala na biso ezali kobakisa bopusi na biloko oyo Nzambe akelá, mpe tolukaka lolenge ya bomoi oyo ezali kozongisa boyokani kati na bikelamu ya mokili mpe bato ná ezingelo na bango.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
