Liboso lya bozangi nguya oyo ezwi mokili mobimba, Pàpa atye bokeseni ya ezalela ya boyokani.
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Lampedusa ezali esika ya yambo epai wapi Pàpa François abimaki libanda ya Roma, sima ya boponami bwa yé na 2013. Akendaki kotalela likambi ya immigration na Mediterranée mpe abyangaki mokili mobimba na ntina ya «bokangi miso» na makambo maye. Lelomei, mwa esanga eye ya moke ya Italie, ezali solo «ezibelo ya kokota na mikili ya Poto» (porte d’Europe), engebene na Léon ya zomi na minei (XIV). Ezali esika ya bofungoli ya projet ya kokomisa misala ya koyamba bapaya na kati ya patrimoine culturel immatériel ya mokili mobimba oyo ezali kosalema na lisànga ya bikolo ya France, na Pérou, oyo ezali kosala mosala ya kosala masuwa mpo na kobikisa bato bakimá mboka na mbu.
Matondi to Melesi
Na libakù liye, Pàpa Leon ya zomi na minei atindaki liyebisi moko na nzela ya bilili, o mokolo mwa zomi na mibale ya sànzà ya setémbe, na lokotà ya italien. Akanisaki mobembo ya mokitani na ye mpe akumisaki bato ya Lampedusa mpo na “bomipesi bwa bango na likambo ya koyamba baninga”, oyo wapi emema bango ut’o ezibelo ya mbu Mediterrandée kino na ezibelo ya eklezya. Alobaki na bango ‘te “Boyambi bwa bino mpe bondeko bwa bino zambi eyebani bobele na bato banso. Ezali libula oyo tokoki komona te, kasi ezali ya solo”.
Léon apesaki melesi na nkombo yaeklezuya mobimba. Matondi manà ezalaki mpe mpo na ba moziki, na ba bénévoles, na ba maires mpe na ba administrations, kasi mpe na ba nganga-nzambe, na ba minganga, na ba forces ya sécurité mpe na bato banso oyo “mbala mingi bazali kosala na ndenge ya kobombama”. Tata Mosantu alimbolaki ‘te ezali na “bosembo te ezanga mawa”, “ezali na mibeko te oyo ezangi koyoka mawa mpo na mpasi ya basusu”. “Bato mingi bakufaki” - kati na bango ebele ya bamama mpe bana! “Bandeko babali mpe basi mingi oyo bakendeki na mboka mopaya bakundamaki na Lampedusa, mpe bazali kopema na mabele lokola mbuma ya mokili ya sika”. Kasi baye babikaki, Pápa akumisaki bango. Mingi kati na bango bakómaki “basáli ya boyengebene mpe ya kimya” mpamba te bolamu ezali kopalangana”.
Likama ya kozanga makasi ya mokili mobimba
Ntango bato bazali kokende kofanda na mboka mopaya, mikakatano ekoki kobebisa makambo oyo basalaki, ekoki mpe kokabola bato. Na yango, tosengeli koyanola mpe kotikala na “bomoko” mpe kofungwama na “molimo to mpema mwa Nzambe”. Makambo manso ya malamu oyo bosalaki ekoki komonana lokola litangá ya mayi o mbu. Kasi Pàpa alobi ‘te ezali bongo te, “ezali na eloko mosusu ya mingi koleka”, mpe akebisi bato na likambo oyo ye moko abengi “mondialisation de làimpuissance, oyo elimboli ‘te, kozanga nguya ezwi mokili mobima”. Abakisi lisusu ‘te, ezali ndé lolenge ya sika ya mondialisation ya kozanga kokanisa baninga basusu, oyo na kala, Papa François atelemelaki. Kasi “bolamu mpe elekisamaka na basusu, zambi eyebi mpe kozala makasi koleka!”. Yango wana esengeli “te, tokoma bato bamesànà mpenza na kozongisa boyokani”, elobi Pápa, tembe te, Banguna bazali te, kaka bandeko babali mpe ya basi nde bazali”.
Ezali bobele na lolenge se wana nde “bisanga ya kimia” ekotonda, ekoma ba gbagba (pont) mpo ‘te “kimia ekoma na bisika ya bato banso mpe ya bikelamu binso”. Na nsuka, wana nde ezali lolenge azali kolikya.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
