Likita lya bansó: "Elikya etondisaka esika mawa etiki polele"
Jean-René Bompolonga - Kinshasa
Libosó ya esika mókó ya Sántu-Petelo etóndi atáko tángo ezalaki malámu te, Papá alimboli boni boni nsékwa ya Yézu-Kristu - "bobimisi ya makási ya bomoi pe ya esengo eye ebongoli ntina ya bozali sóló, úto mabé kinó malámu", eye tokotika "kotála pe komanyola" te po ya kozala kaka "kokámwi" pe "kobéndama" lokóla na mwinda mókó okoka kotála te kasi ekokámwisa - ekoki "kobikisa mókó ya makono ya eleko na bisó: mawa".
Pe Papá akolimbola mabé ena "ekopunza pe ekopanzana" eye ekokende elongó, ayoki mawa, na mikolo ya bato ebelé. Léon XIV alimboli "liyóki (sentiment) mókó ya bowúmeli te, tángo mosusu ya bobwáki elikya ya mozindo, eye ekopunza esika ya káti pe ekomónana lokóla ekolonga bomiléngeli nionso ya esengo". Mawa, elobi ye, ekolongola ntina pe bokási ya bomoi, eye ekomi "lokóla mobémbo mókó ezanga bokambi pe ntina"
Bayékoli mibále ya Emmaüs
Boyóki mabé mókó eye ekotinda na lisapo eyébani ya bayékoli mibále ya Emmaüs na Nsango Elamu ya Luka (24, 13-29), elimbolami mokolo ya misáto eye na Léon XIV. Papá azongeli lisiswi (déception) pe bolembi na bangó tángo bakobima na Yérusalem, na botiki simá na bangó bilikia mitiamaki na Yézu, abákami pe akundami. Bakobika "súka ya likambo eye bamipesaki na makási, bobébisi ya eye ezalaki komónana lokóla ntina ya bomoi".
Papá alobi boni "nionso ebébaki na ngonga moke, káti ya mokolo ya mitáno pe eye ya póso, na bokitani ya mabé ya makambo". Bopengoli (contradiction) ezali, elobi ye, "ya sóló ya kokámwa: nzelá ena ya mawa ya eseke pe bozongi na ndéngé bamesana ekosálema kaka mokolo mókó na elonga ya mwinda, ya Pasika ekokisami malámu". Eye bayékoli ya Emmaüs bayébi nanu te, po na bangó "nionso emónani ebébi". "Na bilongi na bangó bokúfi ya molimo ebimi" tángo bokútáni na moto mókó ya mobémbo oyo akofúnda bangó na bosémbo "ya kozala malémbe na motéma" pe na ye bakosúka na koyéba Yézu-Kristu, tángo akozua lipa, akokata yangó pe akopesa bangó. "Ekeleli ya lipa ekatami efúngoli bangó miso ya motéma, engengisi lisusu botáli na bangó ezipamaki na bobwáki elikya". Esengo ezui makási, ekobi Papá, nguyá ekotámbola lisusu na bilama bilembi, molimo ekomi botóndi. Pe bayékoli mibále baweleli kozonga na Yérusalem, po ya koloba nionso na basusu.
"Na ba nzelá ya motéma, Mosékwi akotámbola na biso, po ya bisó"
«Mokónzi asékwi ya sóló" (cf. v. 34). Na litemele (adverbe) ena, ya sóló, ekokisami lisapo ya bisó bato. "Ezali hasard te sóki ezali mbóte bakristu bapesanaka mokolo ya Pasika. Yézu asékwi na maloba te, kasi na bikela, nzóto na ye ebombi bilembo ya malozi, elembo ya seko ya bolingo na ye po na bisó", elimboli Papá.
Mokolo ya misáto eye, Papá alingi 'te "esengo ezelamaki te" ya bayékoli ya Emmaüs ezala po ya mókó mókó "mbela mókó ya pete na bileko ya pási". Ezali bôngó Mosékwi ndé akobongola na makási botáli, na bopanzi "elikya eye etóndisi esika mawa etikaki polele". Na ba nzelá ya motéma, ekobi Léon XIV, Mosékwi akotámbola na bisó pe po ya bisó. Atatoli eseke ya liwa, alobi elonga ya bomoi, atá molili ya Kalvario. "Lisapo ezali lisusu kolikia mingi na bolámu", elaki Papá.
Na bosúkisi malongi na ye, Léon XIV alobi lisusu 'te koyéba Nsékwa elingi koloba kobongola botáli na bisó ya mokili, ezali "kozonga na mwinda po ya koyéba Bosóló eye ebikisa bisó pe ekobikisa bisó". Abéngi bôngó mondimi mókó mókó ya kotikala ekenge na likamwisi ya Pasika ya Yézu asékwi.
Matondo mingi ndéngé otángi lisoló eye
