Papa o likita lya banso Papa o likita lya banso 

Likita lya bansó: "Soki tosangani, nionso ekoki kosálema"

Mokolo elandi bokundoli mibú 60 ya "Nostra Aetate", Papá abonzaki likita lya bansó ya mokolo ya misáto 29 ya sánzá ya zómi, na lisoló o ntei ya biyamba. Léon XIV azongelaki mingi na litéya na ye libandela ya nsakola ina ya Concile eye, endimamaka na Concile Vatican II, esúkisaki bikeke ebelé ya bozangi boyokani káti na bayuda pe bakristu. "Tokengele po eloko yoko te ekabola bisó", elendisaki ye.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Na esika Sántu-Petelo, mokolo eye ya misáto 29 ya sánzá ya zómi, liboso ya bandimi "bato ya mobémbo mwa boyambi" pe batindami ya biyamba loléngé na loléngé, Papá wa Roma atelemisaki litéya na ye na Nostra Aetate, mokánda enéne eye elimboli moyébano (rapport) ya bokristu pe ya Eklezia katoliko na biyamba ya bakristu te, mingi mpenza eyamba ya bayuda (judaïsme).

Na botelemi na maloba ya Mokónzi Yézu na mwási ya Samarie, Papá alobaki 'te bokútáni ina, izuami na Nsango Elamu ya sántu Yoane, "ebimisi likambo ya lisoló ya sóló ya eyamba", eye ebotami "na pósá ya Nzámbe po ya motéma ya moto" pe ya "pósá ya moto po ya Nzámbe".

Na ebándeli ya Nostra Aetate

Endimamaka eleki mibú ntúkú motóbá na ba tatá ya Concile Vatican II, nsakola ya Nostra Aetate etiamaki lobokó na Polo VI na 28 ya sánzá ya zómi 1965. "Mokánda ya mwinda" ena eye "efúngoli ndelo ya sika ya bokútáni, ya botosi pe boyambi ya molimo", "ekotéya biso ya kokutana na bandimi ya biyamba misusu lokóla bapaya te, kasi lokóla baningá ya nzela na nzela ya bosóló", kasi lokóla ya "komemya bokeseni na bobimisi lisangá ya bomoto na biso" pe ya "kososola, na boluki likambo na bosóló, elili yoko Mobombano se yoko ya Nzámbe eye esangisi bokeli inso", elimbolaki Léon XIV.

Nostra Aetate, Mokánda eye esúkisaki bikeke ebelé ya bozangi boyokani káti ya bayuda na bakristu

Nzela ya yambo ya Nostra Aetate "ekendaka epái ya bayuda, baye sántu Yoane XXIII alingaki kotónga lisusu moyébano ya ebándeli", ekundolaki Papá wa Roma. Na yango, ekobaki ye, po ya mbala ya yambo na lisapo ya Eklezia, "mobéko yoko ya matéya ekolakisa 'te misisa ya bokristu ezali epái ya bayuda elingaki ezua motindo", yango ndé, na botáli biblia pe théologie, ekolakisa "lotono yoko ya bozongi lisusu te".

Lokóla baye bansó ye alandi, Léon XIV alobaki na malongi na ye ya mokolo ya misáto 'te "Eklezia ekondima antisémitisme te pe ekobundisa yango, likoló ya Nsango Elamu yango moko". Na botáli nzela etambolami na likambo ya lisoló ya bayuda pe bakristu na mibú 60 miye, Papá amonaki 'te "boyoki bobé, ba pási pe mawélani (conflits), ya sóló bizuamaki” kasi "bipekisaki bokobi ya lisoló te", esémbolaki ye, na bobakisi 'te molimo ya Nostra Aetate "ekokoba kongengisa nzela ya Eklezia".

Kosála elongo na lisoló pe bolingo

Nsakola ekobianga bakatoliko bansó -episkopo, lisangá ya basángó, bato bamibonza pe bandimi laiki- ya komipesa na bosóló na lisoló pe bosáli elongo na bandimi ya biyamba misusu, elobaki episkopo ya Roma. Leló, likoló ya botámboli ya bato, "bokeseni na biso pe biyamba na biso mibéngami kokutana pe kobika elongo na bondeko", elakisaki Sántu-Papá.

“"Nostra Aetate ekoloba na biso lisusu 'te lisoló ya sóló ekangami na bolingo, likambo se yoko ya ntina po ya boboto, bosémbo pe bozongisi bondeko, na boboi na makási loléngé nionso ya bokesenisi pe ya bonyókoli, na bolobi bokokani na lokúmu ya moto yoko yoko (cf. NA,5)".”

Na mibú ntúkú motóbá simá ya Nostra Aetate, "nini tokoki kosála elongo?". Ezali motuná yoko eye "tokoki komituna", elobaki Mokitani ya Petelo. Pe ya koyanola na motuná ena: "Tosála elongo". Po, ekebisaki Papá, "mokili na biso ezali na pósá ya bomoko na biso, ya bolingi na biso pe ya bosáli elongo na biso". Pe moko moko "ya biyamba na biso ekoki kosalisa ya kokitisa pási ya bato pe kosálisa ndáko ya biso bansó, ya planéti Mabelé na biso", elobaki ye.

Na yangó, episkopo ya Roma aséngaki na bansó koloba lisusu pe na ndéngé ya makási "mosála na biso na bato" pe ya kozala na ekenge libosó ya "makámá misalelemi na fondamentalisme pe extrémisme religieux".

"Bokomisi technologie moto"

Na eleko ya mondialisation, Léon XIV alendisaki lokóla ya kotala bomátisi na loléngé elongobani intelligence artificielle, na bokébisi na likambo 'te "soki esálemi lokóla boponi yoko na moto, ekoki kobébisa makási lokúmu na ye ezanga ndelo pe kosilisa mikumba na ye ya ntina". "Mimeseno na biso mizali na lisálisi linene ya kopesa na bokómisi technologie moto pe na yango kobenda bobongisi na yango, po ya kobátela makoki ya ntina ya moto", emonaki ye.

“"Tosengeli komema elikya na bomoi ya biso moko, na mabótá na biso, na biténi ya ba mboka na biso, na bitéyelo na biso, na ba mboka na biso, na bikóló na biso pe na mokili na biso. Elikya ena esálemi na bondimi ya biyamba na biso, na likanisi 'te mokili ya sika ekoki kosálema".”

Kasi, Papá wa Roma alakisaki 'te eleki mibú ntúkú motóbá, Nostra Aetate, ememaki "elikya na mokili simá ya etumba". Sik’oyo, "Tobengani ya kotónga lisusu elikya ena na mokili na biso ebébisami na etumba pe na nzinganzinga na biso ebébi", elobaki ye. "Soki tosangani, nionso ekoki kosálema", "tokengele po eloko yoko te ekabola bisó", asengaki mbala moko lisusu.

O eleko ya likita lya bansó ya póso ya 29 ya sánzá ya zómi losámbo lyoko ya kimia esálemaki. Losámbo, elobaki Sántu-Papá, "ezali na likoki ya kobongola bizaleli na biso, makanisi na biso, maloba na biso pe makambo na biso".

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló eye.

29 sánzá ya zómi 2025, 15:08