Likita ya banso ya Papa Leon XIV na esika ya Santu-Petelo Likita ya banso ya Papa Leon XIV na esika ya Santu-Petelo   (ANSA)

Likita ya bansó: Yézu "apesi bapótá na ye lokóla likambo mókó ya ya bolimbisi"

Nsékwa "ezali kolongola eye eleka te, kasi mbóngwana na yangó na elikya mókó ya mawa", elobaki Papá o eleko ya likita ya bansó ya yambo ya sánzá eye ya zómi, na esika Sántu Petelo. "Bobanga te kolakisa bapótá na binó mibéli na mawa" pe "kopúsana na binó pembeni ya baye na bobangi to na boyebi mabé", esengaki Léon XIV na malongi na ye ya leló, ya mbala ya libwá na molongó etáli Pasika ya Yézu

Jean René Bompolonga- Kinshasa

Libosó ya bandimi ebelé pe ya bato ya mobémbo mwa boyambi basangani esika ya Sántu Petelo, Papá akobaki molongó ya malongi na ye na eye etáli "Yézu Kristu elikya na bisó". Na mokolo eye ya misáto ya yambo ya sánzá ya zómi,  abetaki sete na "mobombamo" ya nsékwa. Ya sóló, "káti ya boyambi na bisó pe motéma ya elikya na bisó mikangemi makási na nsékwa ya Kristu", elobaki Léon XIV.

Nsékwa ya Yézu, likonzi ya boyambi ya mokristo

Na lisalisi ya ba Nsango Ndamu, Papá abimisaki likanisi mókó na eye etáli mobombano ena "ekokamwisa kaka po moto mókó -Mwána ya Nzámbe- asékwi na bawá, kasi ekokamwisa lokóla ndéngé eponamaki po ya kosála yango". Nsékwa ya Yézu ezali "elonga moko ya lokúmu" te to "bozongisi mabé libosó ya bangúna na ye », kasi "litatoli mókó kitoko ya likoki ya bolingo ya kotelema simá ya eseke monene po ya kokoba nzelá na ye ekoki kopekisama te".

“"Abimi na lifelo ya liwá, Yézu azongisi mabé te. Azongi na bilembo ya ngúyá te, kasi alakisi na pete esengo ya bolingo mókó ya monene koleka pótá nionso pe makási koleka bokabi insó".”

Oyo asékwi azali na pósá ya "kozongisa" to kolakisa "bonéne na ye" te, etéyaki Léon XIV. Na bolakisi 'te Yézu "amibimisi na baninga na ye, bayékoli", "asali yangó na bonkútú koleka, na kotinda bangó ya kondima ye te", ekobaki ye. Pósá na ye kaka mókó ezalaki ya kozala lisusu lisangá na bangó pe kosúnga bangó ya koleka likanisi na bangó ya bosáli mabé. "Tomóni yangó malamu na Cénacle, esika wapi Mokonzi amibimisi na baningá na ye bakangami na bobangi", elobaki Papá oyo atéyi 'te ezali waná ngonga mókó ekolakisa "ngúyá mókó ya kokamwa".

"Boboto na bino!"

Papá wa Roma alimbolaki 'te "Yézu, simá ya bokiti na mabúlú ya liwá po ya kobimisa baye bakangemaki kúna, akóti na esika ya kolala ya baye bazalaki na bobangi, na bomemi likabo mókó moto akokaki kolikya te, boboto". Losako na ye ezali "pete" - "Boboto na bino!" (Yn 20,19), ekei elongó lokóla, amónaki, na elembo mókó "kitoko na ndéngé ya malamu penza te". Po "alakisi na bayékoli maboko na ye pe mopanzi na ye na bilembo ya malozi na ye", ebakisaki Papá. Bapótá, elobaki ye, "mikosálisa te po ya kogangela", kasi ya "kondimisa bolingo mókó koleka bozangi loboko nionso". Mikolakisa 'te o eleko penza ya "eseke na bisó, Nzámbe azongaki simá te. Atikaki bisó te", elobaki Mokitani ya Petelo.

Bongo, Mokonzi "akomilakisa pamba pe azali na mondóki te. Akosenga eloko te, akosala mbwakela te", na bobakisi 'te ezali bolingo mókó "ekoyókisa soni te, ezali boboto ya oyo ayóki pási na bolingo pe akoki na súka koloba 'te esengelaki esálema". Léon XIV ayóki mawa ndéngé "tobombaka mingi bapótá na bisó na lolendo to na bobangi ya kobima bato ya bolembu". Atá bôngó, ekokani te na Yézu oyo "akopesa bapótá na ye lokóla likambo mókó ya bolimbisi", pe akolakisa bôngó ‘te “nsekwa ezali kolongola eye eleka te, kasi mbóngwana na yangó na elikya mókó ya mawá", elobaki ye. Na bozongeli lisoló ya nsango ndamu, Papá akúndolaki 'te Kristu apesi na bapostolu "mosála mókó eye ezali bokonzi penza te nde mokumba, eye ya kozala na mokili bisáleli ya bozongisi bondeko".

“[ "Nzámbe akolimbisa, akotelemisa, akopesa lisusu botiyi motéma". ]

Motéma ya etindá ya Eklezia, esakolaki episkopo ya Roma, ezali te ya "koyangela bokonzi mókó likoló ya basusu, kasi ya koloba esengo ya oyo alingamaki atáko alongobamaki na yangó te". Ezali ngúyá mókó eye ebótisi pe ekolisi lisangá ya bakristu. Po mibáli pe bási "bamóni bonzenga ya bozongi na bomoi po ya kokoka kopesa yangó na basusu".

Lokola bapostolu, "bisó lokóla, totindami". Pe na "bisó lokóla, Mokonzi akolakisa bapótá na ye pe akoloba "Boboto na binó", ebwakaki Léon XIV. "Bobánga te ya kolakisa bapótá mibéli na mawá. Bobánga te kopúsana pembeni ya baye bakangemi na bobángi to boyebi mabé", elobaki Papa, na bolingi 'te "pema ya Molimo esála bisó lokóla banzeneneke ya boboto ena pe ya bolingo ena koleka ba eseke nionso".

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo. 

01 sánzá ya zómi 2025, 14:34