Na sànzà ya zomi (okotobe), Papa asengi tosambela mpo ya boyokani kati na mimeseni mya mangomba.

Likanisi lya losambo la Pàpa Leon XIV mpo na sànzà ya okotobe, ezali kosambela mpo na boyokani kati na mimeseni bikeseni ya mangomba. Mangomba masengeli te kozala lokola mandoki to bifelo, kasi lokola ba gbagba mpe ba esakweli. Asengi bandimi banso baluka eloko ekosangisa bango mpo te babatela mpe bakolisa boboto, bosembo mpe bondeko y abato. Nzoka nde na sànzà okotobe, eklezya ekosepela mibù tukù motoba ya mokanda ya concil “Nosta aetate”

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Na sànzà ya okotobe, Tata mosantu  atomboli losambo la ye mpo ‘te bandimi bya mangomba ya mimeseni mikeseni basala elongo mpo ya kobatela mpe kokolisa boboto, bosembo mpe bondeko y abato. Leon abeti nsete na likambo ya mangomba. Alingi ‘te bazala bilembo bya bomoko o kati ya mokili moye mokabwani. Mpamba te, ekobi ye koloba, mangomba ekomi ntina ya buluyeke to matata. Mpo na ye, mangomba masengeli te kozala ebundeli toefelo, kasi basengeli kozala ba gbagba mpe ba esakueli

Mangomba ezala Gbagba ya bondeko mpe makasi na boyokani

Mokitani mwa Petro alingi ‘te boyokani ezala kati na bandimi. Ezali kaka mokumba ya ba teolojien te to ya bato bamesana kosala yango. Ezali mokumba ya moko na moko, mpo ya mokolo na mokolo. Yango wana episkopo ya Roma, abyangi bato na kozala elongo, kosambelana kosala mosala elongo mpe kolota makambo elongo. Abeti lisusu nsete alobi ‘te, esengeli toyebana bisi na biso lokola bandeko basi mpe bandeko babali, mpo ‘te to mibebisama te.   

Nostra Aetate: nzela yam asolo kati na mangoma to biyamba

Leon ya zomi na minei (XIV) asepeli makasi mpo na ndakisa ya boboto, bosembo, mpe bondeo oyo esalemaka na kala ; lokola bokutani bwa Jean Paul II, na mobù 1986, mpe oyo ya Benoit XVI, n,a Sinagoga ya Roma na mobù 2010. Lisusu mokoloto mwa bondeko ba bato na mboka Abou Dhabi na mobù 2019, na bontoma ya François, kino bokutani bwa mangomba manso (ekimenismo) oyo eùti kosalema kala mingi te na engumba ya Vatikan.

Awa na sànzà ya okotobe bakosepela milulu mya mibù tukù motoba (60ans) ya buku to mokanda moye. Ut’o ebimisamaki na likita linene (concil) ya Vatikan. Bongo bilili (video) ya Pàpa oyo ebimisami, ezali kolakisa lolenge kani esengeli kokanisa  mpo ya boluboli bwa mokana moye, lelomei

Masolo kati na mangomba ezali seko motungisi mya baPàpa

Sango Cristóbal Fones S.J., Mokambi ya lisàngà lya losambo la Pàpa na mokili mobimba, alobi ‘te moto mwa likambo la masolo kati na mangomba ya mobù moye, ezali na ntina makasi na maye matali mikolo mya biso malelo. Ezali solo makanisi ma losambo la Pàpa Leon ya Zomi na minei (XIV) mpo na sànzà eye ya okotobe. Mbala mingi asambeli mpo masolo kati na bandeko basi mpe bandeko babali ya mangomba bikeseni mikokisama, bongo ebota mbuma ya boboto mpe bosembo. O bikateli bya biso bya mokolona mokolo, tomiyebana, tomibatela, toyekola kosambelana biso na biso, moko na basusu, mpo ya mokili mobimba   

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

01 sánzá ya zómi 2025, 10:09