“Leo ya mboka Chicago,” documentaire oyo elobeli ebandela ya libota ya Amerika ya Pápa.
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Mpo na kokanisa sànzà motoba ut’o maponami ma Pápa Léon XIV, Radio-Vatican News ezali kobimisa “Leo from Chicago,” documentaire oyo ezali kolandela bomoi, ntína ya libota, boyekoli, mpe libyangi ya augustiniènne Robert Francis Prevost na Etats-Unis, mboka na ye. Filme ebandi na bomwana na ye na Dolton, na nzela ya bokundoli ya bandeko na ye Louis mpe John, mpe ezali kokoba na ntango na ye na biteyelo mpe na ba universités, na ba communautés mpe na ba parloase, na matatoli ut’o na baninga banganga-nzambe, ba professeurs, baninga ya kelasi, mpe baninga ya kala.
“Leo ya Chicago” ezali bolandi ya documentaire “León ya Perú,” oyo elakisami na sanza ya motoba eleki, oyo elobeli bambula ya misio ya Pápa oyo akoya na mboka ya Andin. Ezali bikela ya ndako ya bopanzi-nsango ya Dicastere ya Communication, na collaboration nà Diocèse ya Chicago na Apostolado El Sembrador Nueva Evangelización (ESNE). Etambwisamaki na bapanzi-nsango Deborah Castellano-Lubov, Salvatore Cernuzio, mpe Felipe Herrera-Espaliat, mpe Jaime Vizcaíno Haro nde abongisi yango.
Na ngonga ya 6h00 ya mpokwa na tango ya Roma, o mokolo mwa mibale, 10 novembre, documentaire ekobima na chaîne YouTube ya Vatikan News na lokotà to minoko misato (na anglais, na italien, mpe na espagnol) mpe ekoleka na bingumba bya mikili ebele.
“Leo ya Chicago” ekolakisama na mikolo ekoya na bingumba mingi ya Italie, na ntango ya milulu mya bato banso oyo ebongisami na Dicastere ya communication mpe epesameli na elilingi ya Pápa. o kati na bingumba biye Vicenza mpe Cremona (21 novembre), Trento (25 novembre), Verona (1 décembre), Gênes (5 décembre), mpe Cagliari (15 décembre).
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
