2025.11.17: Pàpa azali kopesa mbote na basangani ya likita moko na ntina etali bizaleli malamu na mosala ya bokolongono bwa nzoto 2025.11.17: Pàpa azali kopesa mbote na basangani ya likita moko na ntina etali bizaleli malamu na mosala ya bokolongono bwa nzoto  (@Vatican Media)

Léon XIV akebisi mpo na esaleli mabe ya AI na makambo matali bokolongono bwa nzoto

Ntango ayambaki bato oyo bazalaki na likita moko na ntina etali bizaleli malamu na mosala ya bokolongono bwa nzoto, Pápa akebisaki lolenge oyo basalelaka mayele ya bomoto mpo na kokosa bato na makambo etali kosalisa bato. Alendisaki bango bátalela bato ya maladi lolenge Nzambe atalelaka bango.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

Kebá na “Makanisi mabé” ekoki kobotisa ezaleli ya “bozangi bosembo” na makambo ma kolongono bwa nzoto mpe ya kosalisa bato ya maladi. Na maloba ma ye, Pàpa akebisaki bato baye bazalaki na likita ya bato ya mayele na makambo matali bokolongono bwa nzoto. Likita lina likambamaki na Académie pontificale mpo na bomoi na eleko ya Zubile ya elikya, na ntina ya makambo mabé (mbemba) oyo ekoki kobima na nzela ya bokolongono bwa nzoto. Soki bato oyo basalaka mosala ya bokolongono bwa nzoto bazali kolobela bizaleli malamu na mosala na bango, mayele ma bomoto, mpe makambo ma sika oyo ezali kobima na makambo ya tekiniki mpe ya ordinateur, basengeli kokanisa malamu na ntina ya kokotisa ezalela, makambo maliboso, mokanda oyo ezali ya lokuta, ya libunga, oyo ezali kotiya pembeni na lolenge ya lokuta, boni boni tozali komona réalité ya société mpe ya moto ya maladi (ya bokono). Manso mazali kobotisa makambo ezangi bosembo, na gestion ya ba ressources oyo esengeli mpo na administration ya malamu ya santé. Elobaki Leon XIV.

Kosàlela bisàleli

Mpo na Papa, «bisaleli ya makasi lokola mayele ya bomoto ekoki kosalelama, kolakisama, mpe kotambwisama, mpo na ntina ya kozwa litomba, ezala ya nkita, ya politiki to mosusu. Bato bakoki kosalela yango mpo na kosala makambo ma mabe».

Papa alobi ‘te likama ezali ya “kosalela biloko bina to bato na ndenge ya mabe” mpo na kokabola bango na kotalela “nkisi oyo bazali na yango mposa mpe ntalo na yango, ndenge maladi na bango ezali, mpe kokómisa bango biloko mpamba, bansango, to mitango”. Eboyaki yé.

Kobongola lolenge ya komona makambo

Mpo na longola ezaleli yango, Pàpa akanisaki ‘te tosengeli « kobongola makanisi ma biso», «koyeba motuya ya makambo malamu na miso ya polele», mpe «kokanisa lokola Nzambe» na esika ya kotalela matomba ya lombango. Ezali likambo ya «komona nini ekozala malamu mpo na bato banso, koyeba kozala na motema molai, kokaba mpe kosunga, kosala boyokani mpe kotonga ba gbagba (pont), mpo na kosala na kati ya réseau, kosalela malamu makoki, mpo ‘te bato banso bámona ‘te bazali na kati ya bato oyo bazali kosala mosala mpe bazwi litomba na mosala oyo bazali kosala elongo ».

Nganga-nzambe monene abakisaki ‘te : ekoki te, kasi «limonisi liye lya monene esengeli kokabwana te na ezaleli ya bomoto, ya boboto, na bososoli ya bomoto ya moto, na bolembu mpe na lokumu la ye ». Asukisaki boye:«Ezali limoniseli ya mozindo, oyo ezali kosimba motema ya moto mosusu mpe ezali kofungola oyo ya biso» asukisaki».

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

18 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 10:31