2018.11.08 elili ya bitumba ya mokili mobimba ya yambo. 2018.11.08 elili ya bitumba ya mokili mobimba ya yambo. 

Léon XIV: «Eloko soki moko te eleki boboto (kimya) na motuya, tóbatela yango»

Na ba mbote Leon ya zomi na minei apesaki bato na tango ya likita mpo ya banso, akanisaki na Ba-Pologne, bokundoli bwa mokolo mwa nsuka ya bitumba ya mokili mobimba ya yambo. Pàpa Benoit Xvi abengaki yango «bobomi ezanga ntina». Motuya to Ntalo ya kimya esengeli kolóngama na “motema oyo epiki misisa na Nsango Elamu” mpe na "bolingo bwa mboka" engebene Pápa ya Amerika. Apesaki ndakisa kobatela lotomo la bomoto, na nkota ya Italien ya Mère Eliswa Vakayil, oyo akomaki mwa-esengo mokolo mwa poso.

Albys KBD, CP - Kinshasa/RDC

 

“Tótondi Nzambe botondi mpo na likabo lya boboto (kimya)”, lokola Saint Augustin alobaki, “ezali na eloko moko te eleki yango na motuya”. “Tobatela yango na motema moye mosimbami na Nsango-Elamu, na molimo ya bondeko mpe ya bondeko mp ona ekolo”. Na maloba maye, nde Pàpa Leon ya zomi na minei apesaki mbote na ba-Polongne oyo bazalaki na likita lya banso, mpe abetaki nsete na motuya ya kozala na boboto (kimya). Akanisaki bango lisusu na kokundola mokolo mwa nsuka oyo “bitumba ya mpamba to bitumba ezanga ntina”, ya mokili mobimba ya yambo esilaki, lolenge Pàpa Benoit XV abengaki yango. Léon XIV alobaki lisusu ‘te mpo na bato mingi, ata mpe mpo na bato ya Pologne, nsuka ya etumba yango ekokanaki na “ntango oyo ekólo yango ezwaki lipanda”.

Mwa-Esengo Eliswa Vakayil amipesaki mpo na bilenge basi babola

Ntango apesaki mbote na bato bamobembo ya Italie, Léon XIV akumisaki mama Eliswa Vakayil, oyo amipesakina molende mpe mpiko mpo na bonsomi ya bana basi ya babola. Azali mobandisi ya Lingomba ya Misato ya ba Carmélites Thérésiennes oyo balataka sapatu te (Tiers-Ordre des Carmélites déchaussées thérésiennes). Akomaki Mwa-Esengo na mokolo mwa poso eleki na Kochi, na etuka ya Kerala na Inde. Bomipesi bwa ye, ezali ndakisa ekopusa baye balingi komipesa na mosàlà mya eklezya mpe ya societe mpo na kopesa basi lokumu to lotomo la bango.

Na nsuka apesaki mbote na basembwi to bakristu ba mboka Croatie, mpingi mpenza baye ya diosenzi ya Gospić-Senj, oyo basepelaki mibù tuku mibale na mitano ya bobandisi mwa yango (25e anniversaire de sa fondation). Mgr Marko Medo oyo atambolaki elongo na bango, alobaki ‘te: “likabo monene oyo tokoki kobonzela to kopesa. Bikela bya yango bikomonono na bokebi tozali kolakisa na esika ya bandeko bazali pembeni na biso”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

12 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 17:32