2025.11.07 Bokutani bwa Pàpa Leon XIV nà basangani ya  Fondation International Religions mpe Societes, o mokolo mwa  7 novembe 2025. 2025.11.07 Bokutani bwa Pàpa Leon XIV nà basangani ya Fondation International Religions mpe Societes, o mokolo mwa 7 novembe 2025.  (@Vatican Media)

Léon XIV: “Tolingi ‘te biso banso tózongela molende mwa etindà”

O mokolo mwa mitano, mwa 7 ya Novémbe, Pàpa ayambaki basangani ya Fondation Internationale des Religions mpe Sociétés, mpe alendisaki bango mpo na bomipesi bwa bango, oyo “esuki kaka te na mateya ya Katoliko, kasi mpe elandisami na «coopération missionnaire kati na ngambo ya Nordi mpe Sud». Mpo na ye, etindà ezali kosenga “kosala na bomoko, koboya kozala na esika ya yo moko mpe kondima kotonga bomoko ya makasi ya babateli ya mpate”.

Albys KBD, CP -Kinshasa/RDC

 

Kotombola mateya ya malamu ya katolike na Afrika mpe kolendisa boyokani ya malamu kati na bamisionele ya Sudi mpe ya Nord ezali mokano monene ya Fondation Internationale ya ba Religions mpe ba Sociétés. Mobembo mwa basangani ya likita lina na Roma, sima ya mwa mikolo moke na Zubile ya mokili mobimba ya mateya - kobanda mwa 27 Okotobe kino mwa 2 Novémbe - ezali elembo ya “mposa ya kokoba mosala oyo ebandi” mpe “koluka mikakatano mya sika na Afrika”.

Na kolanda nsango ya likita ya mibale, oyo ekosalema nsima ya baposo mibale na Nairobi, na Kenya, na motó ya likambo ekozala “Mateya ya Katoliko mpe kotombola bilembo ya elikia na makambo ya Afrika”, Léon XIV alobaki ‘te akamwaki na makanisi batye na “koteya bilenge ya Afrika” mpe na milende oyo bazali kosala” mpo na kopesa bango mateya ya malamu, oyo ezali na “ezaleli ya Afrika”, lolenge mokanda ya boyokani mpo na mateya na Afrika esengi yango”.

Léon XIV:Koteya, ezali kokolisa bomoto, bosembo mpe confiansi.
Léon XIV:Koteya, ezali kokolisa bomoto, bosembo mpe confiansi.   (@VATICAN MEDIA)

Kosàla na bomoko 

Solo lelo, na makambo ya koyekola to kotangisa, ezali mpasi mingi na komona ‘te, na bato bambula inso, ezali kokola bilembo ya bolembù. Tokoki te kokanga miso mya biso, liboso ya bosengà ya lisungi oyo, ezangi lolakà”, elobaki Tata-Mosantu. Azongelaki maloba maye alobaki na likita na ye ya nsuka elongo na balakisi, o mokolo mwa 31ya sanza ya okotobe ya mobu moleki, na libaku lya zubile ya mokili mobimba ya mateya. Yango wana, Pápa alendisaki mosala ya fondation. 

Episkopo ya Roma alimbolaki ‘te: “Ntango azalaki kotinda bayekoli a ye mibale mibale, Mokonzi yezu ye moko alingaki mpe komonisa ntina ya kosala elongo mpo na kosakola Nsango Elamu”. Yango wana, misio esengi “kosala na boyokani, koboya kozala yo moko mpe kondima kotonga lisanga ya makasi ya babateli ya mpate, oyo ezali kotala kaka likambo lya mbongo te, kasi ezali mpe kotalela likambo ya bokabolani ya basalisi babateli mpate kati na ba eklezya”. Nzokande, Léon XIV akebisaki ‘te: “Mosala yango esengeli kobongisama malamu mpo na kosalisa bango bákota na diosezi oyo ezali koyamba bango”.

Molende mpo na mosala ya misio

Na yango, Tata Mosantu asepelaki na bokutani oyo esalemaki na sanza ya Mayi na Abbaye ya Maredsous na Belgique. “Epesaki nzela na kokanisa na ntina ya bolengeli malamu boyokani ya misio kati na ngambo ya Sudi mpe Nordi, mpe mingi mpenza na ntina ya mokano ya kofungola centre international ya missiologie mpe ya pastorale Nord-Sud”. Mpe abakisaki ‘te: “Nazali na elikya ‘te ebongiseli eye  ekokokisama mpe, koleka nyonso, ekokokisa mikano mya yango oyo elobelami na bikateli na bino”. Alendisaki lisusu ‘te, “Tolingi tozwa elongo molende ya misio”. Mingi penza, “Mission oyo ezali kosakola na mpiko mpe na bolingo Nsango Elamu ya Yezu”. Na nsuka, alobaki ‘te: “Bolobela bato banso lisusu Elengi ya kosakola Nsango Elamu”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

07 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 16:23