Bato ya mobémbo mwa boyambi na esengo ya bozali na likita lya banso ya lelo mokolo ya misatro 26 ya sa,za ya zomi na yoko na esika Santu-Petelo Bato ya mobémbo mwa boyambi na esengo ya bozali na likita lya banso ya lelo mokolo ya misatro 26 ya sa,za ya zomi na yoko na esika Santu-Petelo  (@VATICAN MEDIA)

Likita lya bansó: Léon XIV abengi kotála lobi na elikya

"Tángo bomoi esáli neti ekufi, ekakemi, tala Mokónzi Asékwi akoleka lisusu, kinó súka ya bileko, pe akotámbola na bisó pe po na bisó. Azali elikya na bisó", elakaki Papá na malongi na ye ya mokolo ya misáto 26 ya sánzá ya zómi na yoko, o eleko ya likita na esika Sántu-Petelo. Na bomanyoli nsékwa ya Kristu pe mabakú ya mokili ya leló, Sántu-Papá abengaki ya koleisa tángo insó bomoi eye epesami na bisó. "Esengeli na lisálisi lyoko eye ekokanga, ekolendisa, ekobatela, ekotindika".

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Nsékwa ya Yézu-Kristu ezali "bokási eye ekosunga biso na mokakatano, atá tángo molili ya mabé ekoyindisa motéma na bisó pe molimo na bisó". Papá alobaki yangó lisusu na tóngo ya 26 ya sánzá ya zómi na yoko na bato ya mobémbo mwa boyambi pe bandimi basanganaki na esika Sántu-Petelo, boyóki na bokébi malongi na ye. Na kondima 'te "ba bomoi bebo bizali lokóla ya pási, na bolozi, bitondi na makambo pe mabakú ya kolonga", Léon alendisi komema botáli boko na motindo ya "bomoi epesami lokóla likabo". Moto " akosénga yangó te, aponi yangó te", elobaki ye. "Ayebaki yangó na mobombano na ye, mokolo ya yambo kinó ya súka"

“"Bomoi ezali na likambo lyoko ya kokámwa: epesami na bisó, tokoki te kopesa yangó bisó mókó".”

"Tozali banani?Tokokende wápi?"

Bomoi esengeli "eleisama tángo insó: esengeli na lisálisi lyoko eye ekokanga, ekolendisa, ekobatela, ekotindika", epesaki Papá toli. Libosó ya mwá mituná miye mikozongaka mingi na molimo: "Tozali banani? Towuti wápi? Tokokende wápi? Ntina ya súka ya mobémbo moye ezali nini?", Papá alobi 'te "kobika ekotisi ntina yoko, nzelá yoko, elikya lyoko".

Elikya

Likanisi lyoko etálaki libongi ya elikya eye "ekosála lokóla bokási boko ya mozindo, eye ezali kotambuisa biso na mikakatano, eye ekopekisa bisó totika na bolembu ya mobémbo, eye ekomisi bisó na tembe te 'te mobémbo mwa boyambi ya bomoi ememi bisó na ndako". Bozangi elikya, esémbolaki episkopo ya Roma, "bomoi ekoki kobima lokóla ezibeli (parenthèse) yoko káti ya ba butu mibále ya seko, bopemi móķó ya moke káti ya yambo pe simá ya boleki na bisó na mabelé".

Kolikya na bomoi, elobi Papá wa Roma, "ezali mpenza kolekisa libosó eloko okoluka, kondima lokóla ya sóló, eye tomoni te pe tosimbi nanu te, kotia motéma pe komitika na bisó na bolingo ya Nzámbe oyo akela bisó po alingaki bisó na bolingo pe alingi bisó tozala na esengo".

Lisálisi ya Kristu na bileko ya pási

Papá alendisi kotia motéma na Nzámbe ya bomoi oyo apesaki bisó Mwána na ye Yézu oyo, lokóla Makomi Masántu malobi, "esosoli ntángo insó na lombango na ye kobikisa bakoni, kosálisa ba nzóto pe milimo bizoki, kozongisa bomoi na bakufi". Kristu azongisi "lokúmu na basumuki, akolimbisa masúmu pe akotisi moto nionso, mingi mpenza baye babungisi elikya, babwakama, batindika bangó mosika, na elaka na ye ya libiki", elobaki Léon XIV.

Lobokó ya Nzámbe ezali mobimba. "Akolemba te kosálisa bato atá sóki, lokóla Kaina, bakotosa lŏmbi (instinct) ezanga miso ya mobúlú na bitumba, na bokesenisi, na botáli lomposo (racisme), loléngé ebelé ya boúmbu", ebakisaki Papá. Kotia motéma na Nzámbe ya bomoi, ezali lokóla kotómbola moto na ndéngé nionso ya ye, elobaki Papá wa Roma: "yambo na likambo ya kitoko ya bomama pe botatá", atá na "ba makambo ya mokili esika wápi mabótá bazali na pási ya kokumba bozito ya mokolo na mokolo, bakakemi mingimingi na makambo na bangó pe ba ndóto na bangó", elobaki ye.

Yoka, salisa, pe likabo ya bomoi na ye

Léon XIV alendisaki ya komipesa po ya "nkita yoko ya bomoko, ya koluka bolámu ya bansó eye bansó bakoki kozua litómba na bosémbo, kotosa pe kosálisa bokeli, kopesa esengo na boyoki, bozali, lisálisi ya sóló pe ezanga litómba". Abotami na Tatá, elobaki lisusu episkopo ya Roma, "Kristu azali bomoi pe apesi bomoi ezanga súka kinó kopesa ya ye mókó". Leló, Papá abwaki mbela eye ya "kopesa bomoi na bisó" po ya basusu, waná elingi koloba "kotia na bomoi moto mosusu", esémbolaki ye.

Nzámbe, "makángo ya bomoi" ya bolámu bopusi

Na bomoni bozangi botiyi motéma na bomoi lokóla "bokono epanzani na mokili", "lokola sóki ondimaki mabé mokó, bosundoli boko", Papá alendisaki ya "kobika pe kobota bomoi, na botatoli 'te Nzámbe azali bolámu bopusi "makángo ya bomoi", lokola Buku ya Bwanya (11,26) elobi. Mbela mokó ya lombango koleka leló, elobaki Léon XIV.

Likita lya bato banso ya Pàpa Leon ya Zomi na minei, o mokolo mwa 25 Novémbe 2025, na Roma

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

26 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 14:53