Losambo lya Ekumenisme na Iznik: Liboso lya mobulu, Nicée esengi na Bakristu ‘te basangana.

O mopanzi ya Bartholomée Ier mpe ya ba patriarches nà batindami ya mangomba, Pàpa Léon XIV akundolaki na losambo mibù 1700e ya Concile ya Nicée na bazilika Saint-Néophyte, engumba ya sika ya Iznik. Na lisukulu lya yé, Tata-Mosantu abyango na motema soke « kobwaka lolenge inso ya fondamentalisme mpe ya fanatisme kati na mangomba», kasi elongo, basala mpo na bondeko, masolo, mpe boyokani

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Atako bazilika Saint-Neophyte ebebaki na koningana ya mabele ya mobù 740 mpe ezindaki na mai ya etima Iznik, libula ya likita lya yambo na mokili mobimba na kati ya lisolo ya Mangomba eumeli mpe ekatisi bikeke nziké. Mibù 1700 na nsima, esakola ya boyambi bwa yango elobamaki lisusu na lisàngà, na mongongo makasi, kaka na esika eye esilaki kosakolama mpo ya mbala na yango ya yambo, na bakambi bya eklezya mpe batindami bya mangomba ma bakristu na mokili mobimba, o mokolo mwa mitano mwa 28 Novembe.

Pene ya mintika arkeoloji ya ndako-nzambe monene to bazilika Byzantine, oyo ezali na ntaka ya kilometele 130 na sudi-Esti ya Istanbul, mpe na kimya moko ya ntina mingi mpo na likambo oyo esalemaki, Pápa Léon XIV mpe Patriarche ya Constantinople, Bartholomée Ier, basambelaki elongo na bandeko ba bango bakristu liboso lya bililingi bya Kristu mpe ya basangani ya likita lyango.

Bokutani ya losambo lya lisanga (prière œcuménique) na Iznik, Nicée,ya kala, o mokolo mwa mitano mwa 28 novembe 2025
Bokutani ya losambo lya lisanga (prière œcuménique) na Iznik, Nicée,ya kala, o mokolo mwa mitano mwa 28 novembe 2025   (@Vatican Media)

Kati na bapatriarches bazalaki na esika ena, ezali nà baye ya Syria, ya baOrthodokse ya Antioche mpe ya ngambo ya Orient mobimba. Ezalaki mpe nà oyo ya copte-orthodokse ya Alexandrie, ya grec-orthodokse ya Jéruzaleme, ya grec-ortodokse ya Antioche mpe ya Orient mobimba. Kasi mpe nà batindami ya eklezya apostoliko ya Armenie. Bakobosana té baprotestant, ba-Anglikani, nà Fédération ya Luther ya mokili mobimba. Nzokande ezalaki naino nà Alliance évangélique ya mokili mobimba to Conférence mennoniste ya mokili mobimba. Mingongo miye minso, misakolaki elongo Kredo ya Nicée-Constantinople, kasi batangaki te liloba liye : “Filioque”.

«Tozali na esengo mingi na komona lolenge bino banso boyanoli malamu na libyangi lya biso ya kokumisa, na nzela ya mobembo moye mwa lisànga ya losambo, bokundoli mpe libula lya likita ya liboso ya mokili mobimba oyo esalemaki awa na Nicée eleki bongo mibu nkámá zomi na nsambo», elobaki Bartholomée Ier, na lisukulu na yé ya boyei bolamu. «Tosangani awa mpo na kokundola lisolo lya kala mpamba tè, kasi mpo ya kotatola eyamba yoko, oyo esakolamaki na batata ba biso ya Nicée». Basanganki na mobù 325, na engumba eye ya sika Iznik mpo na kokweyisa arianisme mpe kosakola boyambi na lisiki lyaYezu-Kristu mpe na Nzambe sé moko, Tata, Mwana nà Elimo-Santu. “Tozongeli liziba liye ya kondima na boyambi Kristu mpo na tokende liboso”, elobaki Patriarche.

Likita (Concile) lya Nicée,, bokangami makasi kati na Rome mpe Constantinople
Likita (Concile) lya Nicée,, bokangami makasi kati na Rome mpe Constantinople

Bonzambe bwa Kristu

Nsima ya kotanga Nsango Elamu lya Santu Yoane, Pàpa atangaki lisukulu lya yé na lokotà ya lingelesi(Anglais). «Na eleko eye ya mpasi na makambo mingi, oyo bato bazali kokutana na ebele ya makama oyo ezali kobundisa lokumu la bango, mibu 1700 ya likita ya yambo ya Nicée ezali libaku malamu ya komituna soki Yezu Kristu azali nani na bomoi ya basi mpe babali ya mikolo mya bisolelo ?,  azali nani mpo na moko na moko ya biso ? ». Léon XIV akobi koloba ‘te: «Motuna moye mozali mpenza na ntina mpo na bakristu oyo bazali na likámá ya kokitisa Yezu-Kristu na lolenge moko ya mokonzi ya nguya to moto oyo aleki bato banso na nguya, libungá oyo na nsuka ememaka mawa mpe mobulungano».

«Tango awanganaki bonzambe bwa Kristu, Arius akitisaki ye na esika ya moyokanisi mpamba kati na Nzambe mpe bato. Azangaki koyeba bosolo ya Bomoto bwa Kristu, bongo lolenge lona, bonzambe mpe bomoto ekabwani mpenza», elimbolaki Tata Mosantu. Kasi, soki Nzambe amikómisáki moto te, boni boni bato bakoki kozala na bomoi bwa ye bwa seko? Yango nde ezalaki likambo ya ntina na Nicée mpe ezali likambo lya ntina lelomei: Kondima na Nzambe oyo, na nzela na Yezu Kristu, akomaki lokola biso mpo na kokómisa biso “basangani ya bomoto bwa Nzambe”.

Bomoko kati na Yezu-Kristu

«Esakola eye ya boyambi na Kristu ezali na ntina mingi mpenza na botamboli bwa bakristu mpo na bomoko yao yo ekoki mpenza», elobaki Tata-Mosantu. Abetaki nsete mpe alobi ‘te eyamba eye ekabolami na baeklezya mpe mangomba manso ya bakristu na mokili mobimba, nà mpe baye basakoli te Kredo ya Nicéé-Constantinople na milulu mya bango. Pàpa ya lingomba ya Santu Augustin akobaki na lisukulu lya yé mpe apesaki ndakisa ya tata w aye ya molimo, episkopo ya Hippone ‘te : «Tokoki kolobe ‘te biso bakristo, atako tozali bayiké, na Kristu ya bomoko, tozali moko» (Exposition na Banzembo 127)  

Episkopo ya Roma asengi na moko na moko na « kotika ezalela ya kokabola, oyo ezali nayino kati na biso. Bongo tokolisa mposa ya bomoko oyo wapi Mokonzi Yezu-Kristu asambelaki mpe apesaki bomoi bwa ye ».  Soki tozali koyokana, mingi mpenza biso bakristu, tokoki kotatola ya solo, Nsango Elamu ya Yezu-Kristu, oyo ezali esakola ya elikya mpo na banso, ezali mpe nsango ya boboto mpe ya bondeko ezali na ndelo suka te na mangomba mya biso mpe na bikolo bya biso». Maloba maye, Leon azwaki likanisi lya mokitani mwa yé ya ekolo ya Argentine na tango ya liyangani monene ya conseil pontifical mpo na kokolisa bomoko ya bakristu, o mokolo mwa 6 mai 2022. ( d’une session plénière du conseil pontifical pour la Promotion de l’unité des chrétiens le 6 mai 2022.)

Koyokanisa bato, koboya kowelana kati na mangomba

Léon XIV abeti nsete mpe alobi ‘te: “Kasi mposa wana ya kozala na bomoko kati na bandimi banso kati na Yezu-Kristu eleki Bakristu. Ezali “mbala inso koluka bondeko kati na bato banso”. Na Kredo ya Nicée, tosakoli boyambi bwa biso na “Nzambe sé moko, Tata"; nzokande, ekoki kosalema te ‘te tózali kobenga Nzambe Tata, kasi tozali koboya kondima lokola bandeko babali mpe basi bisusu, oyo bakelami mpe na elilingi ya Nzambe”. Kosalela eyamba lokola eloko ya kolongisa bitumba mpe mobulu, esengeli kobwakama na makasi, nzoka nde nzela ya kolanda ezali oyo ya bokutani ya bondeko, ya masolo mpe ya boyokani.

Tata Mosantu asukisaki lisikulu na ye na kotia motema mwa ye na Nzambe mpe alobaki ‘te: “Nzambe Tata, Nta-Bokasi bonso mpe ya ngolu, ayoka o bozindo, losambo tozali kobonzela Ye lelo” mpe “Apesa mokolo moye mwa ntina mingi, ebota mbuma mingi ya boyokani, ya bomoko mpe ya kimya”.

Na mobimba mwa yango, bokutani bwa lisanga lya losambo na Iznik

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

28 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 22:02