Misa mya Pàpa na Instanbul: Kobatela ba Gbagba ya boboto mpe bomoko

Mpo na liteya moko kaka asalaki na Instanbul, Leon XIV alendisaki na kotonga ba GBagba, na bomoko mpe na boyokani o kati ya Eklezya, elongo na baninga ya biyamba bisusu ya bakristu, nà mpe mangomba misusu. Bongo mpo na eleko eye ya Boyei to aventi, apesaki mwa malako. Mpo na mokolo mwa poso 29 Novémbe, mokolo ya misato ya mobembo mwa ye ya bontoma na Turquie, asalaki misa na Volkswagen, na Istanbul, liboso lya bakristu nkoto minei (4 000).

Albys KBD, CP - Kinshasa/RDC

 

Na Istanboul, ba yambi misa ya Papa Leon XIV, moko kaka oyo asali na miso y abato ebele na mabele mana ma Turquie. Batangakai mokanda ya Banzembo 121 na ki araméen, nkota to monoko mwa Yezu-Christu. Mokitani ya santu Petro, asalaki misa ya Lomingo la Yambo ya eleko ya Aventi to Boyei, na Constantinople, mboka ya kala. Bandimi bazalaki ebele mpenza, na motuya ya 4 000. Ezali bongo elembo ya bomengo ya bokristu, bo elandani ut’o ebandela mpe ezali kokoba na mabele ma santu Polo. Litangi lya yambo esalemaki na lokota ya araméen, oyo ya mibale etangamaki na lingelesi (Anglais). Kasi Nsango Elamu etangamaki na lokota Turc.

Lokola ezalaki mokolo liboso eyenga ya Santu André, Pàpa amaniolaki na maye batangaki na Mokanda mwa Izaya, mpe alendisi bato na komata ngomba esantu ya Nzambe Mokonzi. Ateyaki na lokota ya Lingelesi, bongo alendisaki na kokanisa lisusus boniboni “esengo yak osala bolamu elandisamaka”. Ekomami na mikanda ya Santu Petro nà ndeko way e Santu André, na lisalisi lya Santu Ambroise: Elobi ‘te Kati na manso maye, ezali na libyangi to mbela moko, oyo ba bwaki na biso lokola, mpo na kozongela sika bonzeneneke ya boyambi bwa biso. Atie makanisi lokola Santu Yoane Krisostome, oyo elenga ya bosantu bwa yé, eleki makamwisi azali kosala. Leon abwaki mbela ya komikengele biso moko, nakokolisa boyambi na nzela ya losambo mpe ya ba sakramentu. Esengeli kozala ya solo, na bondeko. Babwaka nzela mpe misala mya molili.

Bosenga ya boboto “zongazonga ya biso, ontei ya biso mpe kati na biso”

Elilingi ya mibale oyo Izaya azali kolobela, ezali eye ya mokili epai wapi bobele boboto ezali. “Boniboni tokoyoka lelomei bosenga na yango na lomango; oyo nde etinda ya ntina mingi mpo na biso! Lokola tozali na mposa ya kimya, ya bomoko mpe boyokani na bato baye bazali zonga zonga ya biso, kasi mpe ontei ya biso mpe kati na biso”. Boboto ezali moko ya bibundeli ya Pàpa Leon ya zomi na minei. Logo na ye mpo na etapi ya Turquie mpe, oyo ezali komonisa gbagba oyo ezali kokatisa Bosphore, epesaki ye makanisi na makambo misato oyo etali milende mpo na koluka bomoko: na kati ya lisangá, na boyokani nà bandimi ya mangomba misusu mpe na kokutana nà bandeko basi mpe babali ya mangomba misusu. Léon XIV alobaki ‘te: “Kobatela ba gbagba eye misato, kokómisa yango makasi mpe kokómisa yango monene na lolenge inso ekoki, ezali na kati ya mokumba na biso ya kozala engumba oyo etongami likoló ya ngomba”.

Kobatela bomoko kati na eklezya mpe kati na boyambi na ezlela ya bonkoko

Boyokani ya mibale oyo Pápa alobelaki ezali oyo ya ekuménisme. “Kondima bobele moko kati na Mobikisi esangisi biso”. Mpe lelo tozali kozongisa sika, “iyo” na biso na bomoko, “mpo ‘te biso banso tózala moko” (Jn 17, 21), “unum sint”. Pàpa azongelaki maloba maye, liboso ya kolobela boyokani na bato oyo bazali bandimi nayino te.

kópesa motuya na baye batyaka kimya (Boboto)

Na likita liye lisalemaki na Nicée, Léon XIV alobaki ‘te: “Tozali na mokili oyo mbala mingi bazali kosalela mangomba mpo na kolongisa bitumba mpe makambo ya mabe”. Liboso lya bato banso, Pàpa  abéngaki bango ‘te “bápesa motuya na maye esangisi biso, to kokweisaka bifelo ya makanisi mabe mpe ya kozanga kotyelana motema, to kólisáká boyebi mpe limemya ya moko na mosusu, mpo na kopesa na bato banso nsango ya elikya makasi mpe libyangi ya kokóma basali ya kimya.

Na nsima, lisambo la lisanga esalemaki na Lingelesi, na monoko (lokota) ya Turc, na Arabe, na Arménie, mpe na Italien liboso ‘te molulu ya Ukaristya ebanda. Na nsuka ya misa, episkopo-mokonzi ya Istanbul, Massimiliano Palinuro, apesaki Pàpa matondi mpo azali “Ntoma” ya solo, motongi ya ba Gbagba(pont), oyo azali kolendisa kokweisa bifelo ya boyinani mpe kotonga ba gbagba ya bondeko. Mpo ‘te bakristo oyo bazali kosala mobembo na “Mabele Masantu ya Turquie” bákoka kozala bato ba bosembo mpe ya boboto (kimya).

Misa mya Pàpa na Instanbul, o mokolo mwa 29 Novembe 2025

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

30 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 15:42