Pàpa alungwe na Turquie,  mpe akei na Beyrouth,  o mokolo moye mwa Lomingo  la 30 novembre 2025 Pàpa alungwe na Turquie, mpe akei na Beyrouth, o mokolo moye mwa Lomingo la 30 novembre 2025  (KEMAL ASLAN)

Mpepo ya Pàpa ekiti na Liban, ebandela ya mobembo ya botomà bwa ye

Sima ya mwa mikolo koleka misato na Turquie, Papa akomaki na Liban, kuna ako défendre justice mpe kimia na mboka oyo mokolo na mokolo Israël azali kobwakela babombi. Wana esika population ezali ko nyokwama na crise ya mombongo oyo bilami na crise ya confiance nà oyo etali ba institutions.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

Mpepo (Airbus) A320 ekitaki na aéroport international ya Beyrouth na ngonga ya 3:34 p.m. (Sima ya nzanga) ngonga ya mboka. Bayambaki Pàpa kaka wana na bakonzi ya likolo ya leta na molulu ya bonkoko ya boyambi to kopesa boyei bolamu. Na sima, Leon akendaki mbala moko na ndako bisika ya Mokambi ya ekolo na Baabda. Kuna bakokutana mp ona mwa masolo elongo na Mokambi ya Ekolo, Joseph Aoun. Ye azali Mokambi moko mpamba ya bakristu oyo azali kokamba mboka eye mingi bazali ba-Mizilma. Na nsima ya nzanga, Pàpa akoloba kaka wana na ndako ya mokambi ya ekolo, nà bakonzi ba mopelengano, ya societe sivili mpe nà corps diplomatiki, Pàpa akei na liyebisi lya boboto.

Mboka Liban, ezali mboka eye, Israel, asilisi kobete ba bombi na masasi mikolo na mikolo, atako o mokolo mwa 27 novémbe ya mobù 2024, basengaki “kotika kobete masasi” kati na bikolo ya ba Ebrémpe ba muvema Chiite libanais ya Hezbollah. Soki totali malamu, na Beyrouth, Pàpa akozala mosika te nà Mabele Masantu (Terre-Sainte), kaka na ntaka ya 350 km. Mwa mikolo, yambo ‘te akende mobembo, Leon XIV abyangaki lisusu moko na moko na koluka lolenge ya koboya mobulu. Wana nde ezali lokola eyano na bamakambo, mpe na bokutani na limemya , ya kovanda elongo o meza mpo na masolo mpe kosala elongo mp ona koluka eyano ya makambo. Pàpa abondeli mpo na bomoko, boyokani, mosala elongo, mp ona bato banso mpe mangomba manso.

Kolendisa bilenge ya Liban

Bomoko ezali maman na likanisi lya Pàpa Leon ya XIV, ezali mpe na motuya na Liban, repibliki oyo bokonzi ekabolami na biyamba ndenge na ndenge. Bato mingi ya Liban, bazali ba-Mizilma, kasi bakristu bazali na ngambo ya makasi koleka atako bazali moke mpe bamimonisi kaka 1/3 ya population, liboso lya bato 5,8 miliyon. Na ekolo enà, ekumenisme ezali eloko ya mpamba té. Ba Paloase zomi na mibale ya bakristu esanganaka. Kolendisa bango na bomoko ezali na motuya makasi mpenza. O mokolo mwa yambo moye, Pàpa akokutana na bakristu bakatoliko, sima akozala elongo na bokutani ya ekumenisme ya mangomba mpe biyamba ndenge na ndenge.  

Na mpokwa ya mokolo mwa yambo, akosambela elongo na bilenge 12 000 ya Liban, oyo bazali avenire ya lelo mpe elikya ya lobi. Makambo mingi mpenza esengeli kozongela kotonga yango lisusu. Na lisalisi l (premier ministre)ya maponomi ya mbulamatari ya yambo, Nawaf Salam, mobulu ya institution esilaki. Kasi ebongisi likambo la bobola soki moke te. O mokolo mwa mibale ya sànzà ya decembe (Mardi 02 decembre), Pàpa akopesa mbote na bato ya Santé na lopitalo ya Kuruze. Bakanisi lisusu esplosion ya libongo la Beyrouth, mibù mitano mileki, na mokolo mwa 4 ya sànzà ya Agusti ya 2020. Pàpa akosambela na esika eye ya likàmà. Liboso lya mbù, akosala misa, esika oyo Benoit XVI alendisaki mwa ekangà ya ye, mibù zomi na misato mileki, na mobembo mwa nsuka ya yoko Pàpa na mboka ya banzete ya Cèdre  

Tango Beyrout ezalaki kolengele mobembe ya Pàpa Leon XIV
Tango Beyrout ezalaki kolengele mobembe ya Pàpa Leon XIV

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

30 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 17:08