Pàpa abiangi bakristu bàzala «batongi ba bondeko»
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
O boso bwa bakristu nkoto tukù mitano (50 000) basanganaki na esika Saint-Pierre, Pàpa alobi ‘te: «Moyango ya bosangani bwa basantu» oyo esalamaki o mokolo mwa poso mwa 1er novembre, «ezali kokundwela biso nini ezali mokano mwa nsuka ya bato: eyenga monene oyo epai wapi tozali kosepela elongo na bolingo bwa Nzambe, oyo ezali kati na biso banso», na «koyeba mpe kosepela na kitoko ya bilongi ndenge na ndenge, bokeseni binso mpe manso makokani na elongi ya Klisto».
Na molulu moye ya Eukaristya, Léon ya zomi na minei (XIV) akomisali Santu John Henry Newman «Motei mwa Eklezia mwa mokili mobimba», na molulu ya Jubilee ya mokili mobimba ya mateya oyo esalemaki na Rome. Pápa alobaki ete azalaki na esengo ya koyamba batindami ya Lingomba ya Angleterre, oyo batambwisamaki na Stephen Cottrell, episkɔ́pɔ-mokonzi ya engumba York. Mokonzi ntoma monene alakisaki esengo ya yé mpo ayambaki batindami ya eklezya ya Angleterre, oyo ekambamaki na Stephen Cottrell, episkopo-monene ya York.
Bolobeli bwa Santu Joh Henry Newman mp ona bomoko
Papa alobaki na nsima ya likita ya losambo yaoecumenisme elongo na Mokonzi Charles III, oyo esalemaki na mokolo mwa minei, mwa 23 okotobe, na ndako ya losambo ya Sistine, ‘te : «kozala na bino awa lelo ezali komonisa esengo oyo biso banso tokaboli mpo esakola ya kibomotei bwa Santu John Henry Newman na eklezya. Ut’o likoló, tiká ‘te azala elongo na bakristu o nzela ya bango mpo na bomoko ya solo solo”.
Baye bakotongaka bondeko
Episkopo wa Roma alobelaki bampasi mpe kozanga bosembo oyo bato bazali komona to kokutana na yango. Alobaki ‘te: “Toyoki na somo nyonso mpe na mpasi o motema, makàmà oyo libota ya bato ezali komona mpo na kozanga bosembo mpe bitumba”. Léon ya zomi na minei XIV akanisi na bato banso ‘te “basengeli kozala batongi ya bondeko”.
Mobembo ya Basantu
Apesaki mbote na bato bamobembo banso oyo bazalaki wana, mingi mpenza na bilenge oyo babandisaki “Course des Saints” na lisalisi lya ba Missions ya Don Bosco. Ezali kosangisa masano ndenge na ndenge mpe bondeko to bomoko (solidarité) nà bana oyo bazali na mpasi.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
