2025.11.09 Pàpa Leon wa zomi na minei (XIV) na tango ya Angelus 2025.11.09 Pàpa Leon wa zomi na minei (XIV) na tango ya Angelus  (@Vatican Media)

«Tozali mabanga mya bomoi » mya Eklezia, elobi Léon XIV na Angelus»

Nsima ya kosala misa na ndako-nzambe ya ye, Basilique Saint-Jean-de-Latran, Pàpa asalaki Angelus bo momeseno na Place Saint-Pierre. Abengaki na kotala mosika koleka ndako- Nzambe eye bakundoli eyenga lelo o mokolo mwa lomingo la 9 Novémbe, mpe na komona ‘te «tempelo ya solo solo ya Nzambe ezali Kristu oyo akufaki mpe asekwaki»..

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

«Ezali esika ya ntina ya eyamba, oyo epesamaki na bantoma mpe babatelaki yango. Mpe epalanganaki na boumeli ya lisoló ya bato». Nde bongo lolenge Léon XIV alobeli Basilique ya Saint-Jean-de-Latran ya Roma, oyo ezali nayino kathédrali ya episkopo ya Roma, oyo ye azali liboso, mpe liboso ya Tata Mosantu. Wana nde maloba ma yé, liboso lya losambo la Angelus, o mokolo mwa lomingo, mwa eyenga ya bobenisi ndako-nzambe,oyo ezali “Mama ya bandako-nzambe banso ya engumba mpe ya mokili”.

Eklezya ezali ndako mpamba te.

O mokolo moye, Pàpa alobi ‘te « tozali kokanisa na bozindo libombamo ya bomoko mpe ya bondeko nà Eklezia ya Roma, oyo ebengami mpo na kozala mama oyo abatelaka na bolingo inso kondima mpe mobembo ya Bakrstu bapalangana na mokili mobimba». Likambo lya ntina ezali te, ya «komona na miso yoko ekela oyo ezali na ‘motuya monene na lisolo lya molongo’, ya ntoki, mpe ya losambo» kasi nde ya «kotala libanda ya Tempelo te, nzokande eloko oyo ezali koleka. Mpe koyeba ‘te «esika mosantu ya solo solo ya Nzambe, ezali nde Kristuo oyo akufaki mpe asekwaki». Azali molobeli to moyokanisi se moko ya lobiko, Mobikisi se moko, Moko oyo, na kosangana na bomoto bwa biso mpe na kobongola biso na bolingo bwa Ye, azali ezibelo oyo efungwami polele mpo na biso mpe ezali komema biso epai ya Tata.

Bakristu, mabanga ma bomoi

Mokonzi ntomà monene alobi ‘te: biso tozali nde ndako eye esantu. Tozali «mabanga mya bomoi» lokola tozali na bomoko na Tata”. Tozali “Eklezia ya Kristu, nzoto ya ye, biteni bya nzoto ya ye, oyo ebyangemi mpo ya kosakola o mokili mobimba Nsango Elamu ya ye ya ngolu, ya bobondi mpe ya boboto (kimya). Ekoleka na nzela ya losambo wana ya elimo oyo esengeli kongengea liboso liboso na litatoli ya bomoi bwa biso”.

Mpo na “kosimba malamu bomengo bwa libombamo lya Eklezia”, asengi ‘te tobongisa mitema mya biso na “miso to etaleli ya molimo” mpo na kolonga “bozangi bokasi mpe mabunga mya Bokristo, mpe ebele ya maloba mabe to makanisi mabe”. Bosantu bwa Eklezia ezali kati na “likabo lya Mokonzi, oyo soki apesi, ezongelaka ye lisusu te”, kasi azali kokoba kopona “lokola esika ya kozala na ye, na bolingo moko ya kokamwa, ata mpe maboko ya bosoto ya bato”, lokola Episkopo wa lokumu Joseph Ratzinger akomaki na 2005, yambo ‘te akóma Pàpa.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

09 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 15:11