Elikya, Bomoko, Boboto mpe Bosembo: Mboto moye Leon XIV aloni na mabele ma Liban .
Albys KBD, CP - Kinshasa/RDC
Elikya, bomoko, kimya mpe bosembo ezalaki maloba minei oyo epesaki nzela na mobembo mwa mikolo misato ya Pápa na Liban. Na mpokwa ya mokolo mwa yambo na ndako ya mokonzi ya lingomba ya Maronite na Bkerké, Léon XIV apesaki elikya na bilenge, mpe asengaki na bango 'te batelemela masengenya (mimekano) ya kolongwa na mboka. Na koyeba "hémorragie" ya makasi ya bato ya Liban oyo ebimi na ntina ya mpasi ya nkita, Pape Augustin abengaki bilenge ya mokili ya Sedre mpo bazala "sekele to elembo" ya mbotama ya ekolo na bango. Na libongo ya Beyrouth, na tango ya losambo ya boboto mpe na tango ya kosolola na bandeko ba bato baye bakufaki na likama ya bombe ya mokolo mwa 4 agusti ya mobù 2020, Mokonzi ya Eklezia amonisaki mposa ya bosembo ya bato banso bazali kaka kozela, mibu mitano nsima ya likama, mpo na koyeba banani bazali na ngambo ya likambo lina.
Bomoko ya bakristu mpe masolo kati na mangomba
Bomoko emonisamaki polele na makita mibale: ya liboso elongo na baepiskopo, banganganzambe, basango mpe bakonzi ba mangomba ya Azia; ya mibale elongo na bakonzi minene ya Bamizilma ya Liban. Bobele na bomoko, na masolo, na limemya mpe na bondeko nde Liban ekozwa lisusu “bokenzu” bwa yango ya ebandela, kitoko oyo Nzambe apesaki na mabele maye. Boboto nde ezalaki likambo lya ntina mingi na mobembo mwango. Na minoko mya ba Libanais nyonso, ezali ndoto oyo bakoki te kosimba. Matata na kati ya bikólo, kowelana na kati ya bikólo, kanyaka mpe mobulu na politiki ezali kopekisa kimya ya libela.
Lolenge ya sika ya kotalela likambo lyango
Moyen-Orient esengeli na lolenge ya sika mpo na kobwaka makanisi mya kozongisa mabe na mabe mpe ya mobulu, kolonga bokabwani ya mopelengano (politiki), ya bato mpe ya mangomba, mpe kofungola mikapo ya sika na nkombo ya boyokani mpe ya kimia(boboto), elobaki mokitani ya Petelo, na nsuka ya misa mwa mokolo mwa mibale na ngambu ya mayi ya mbù ya Beyrout. Yambo ‘te atika mabele ya Liban, episkopo wa Rome asengaki ‘te bitumba mpe kowelana esila. “Bibundeli azali koboma bato, kasi boyokani, bolobeli mpe masolo nde ezali kotongaekolo”; elobaki Mokonzi ntoma monene.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye
