Mandoki makoboma, lisoló likotonga: lisikulu lya nsúka ya Léon XIV na Liban

Yambo ya komáta na pépo na ye mpo ya Roma, Papá asálaki lisikulu lyoko úto libandá lya mpépo ya Beyrouth, o eleko ya molulu mókó ebongisamaki na bakambi ya ekóló. Sántu-Papá abwakaki mbela mókó po ya bosúkisi bitumba na sudi ya ekóló.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Simá ya tóngó yoko ya malonga, eleki na bokútáni boko na mabótá ya baye bazuaka makámá na ekíndo (explosion) ya 4 ya sánzá ya mwambi 2020 pe misa pembeni ya ebale ya Beyrouth libosó ya bandimi 150 000, Papá Léon XIV alobaki lisikulu ya súka ya mobémbo na ye ya bantóma úto libandá ya pépo ya mboka-mokónzi ya Liban, libosó ya bakambi ya ekóló pe ya eklezia. Pépo na ye elongwaki na ngonga ya zómi na isáto, tángo ya Liban, pe eleki likoló ya etima ya Chypre, Grèce, Italie libosó ya kokita na ngonga ya inei simá na libandá ya pépo Léonard-de-Vinci ya Roma.

"Omemaki maloba ya elikya pe ya bolendisi", epesaki melesi na lisikulu ya mokuse na lokota y'arabe mokónzi ya ekóló Liban, Joseph Aoun, oyo alimbolaki boyei ya Papá lokóla eye ya "tatá mókó ayei kolendisa bisó pe koyébisa bisó lisusu 'te mokili ebosani Liban te".

O eleko ya ye ya bozui liloba, Papá wa Roma alobaki 'te kokende ezali "pási koleka kokoma". "Soki kokoma ezalaki kokota na bokébi na bonkoko na binó, kotika mabelé eye ezali komema binó na motéma na ngai", ekobaki Papá na lisikulu na ye na lokota y'anglais.

“"Tokotika te, kasi, lokóla tokutani, tokokende libosó elongo. Pe tokolikia kokotisa molimo ena ya bondeko pe ya bomipesi po ya boboto na Moyen-Orient mobimba, atá baye bazali komimona leló lokóla bangúna".”

Léon XIV akobaki lisikulu na ye na bolobi bondimi na ye po ya mikolo misáto alekisi na Liban pe na bosepeli na ndéngé akokaki kosála pósá ya oyo azalaki libosó na ye, Papá François, "oyo alingaki makási kozala awa". « Na bosóló, azali na bisó, elobaki Mokitani ya Petelo, akotámbola na bisó pembeni ya ba nzénénéké basusu ya Nsango-Ndamu baye bakozela bisó na bokangemi ya seko ya Nzámbe: tozali basangoli (héritiers) ya eye bandimaka, ya boyambi, ya elikya pe ya bolingo eye bitambuisaka bangó ».

Na botángi bileko ya ntina ya mobémbo ya bantóma na ye na Liban, Papá alakisaki na bozindo losámbo na lilita ya sántu Charbel mokolo ya yambo na tóngó to lisusu botáli mokolo ya ibále na tóngó na esemelo ya Beyrouth. "Nasámbeli po ya baye bansó bazuaka makámá pe namemi o ntei na ngai pási pe pósá ya bosóló pe ya bosémbo po ya mabótá ebelé, ya ekóló mobimba", elobaki Papá, na bobakisi ndéngé asimbami makási na bokútáni na ye na bandeko ya baye bazuaka makámá.

Bato ya moléndé, ya makási lokóla ba cèdre

Na botelemi na bilongi ebelé akutani na yangó pe ba mbote ya maboko apesi simá ya ngonga 72, Léon XIV alimbolaki baí-Liban bato ya moléndé, bakumbi ya elikya: "Bozali makási lokóla ba cèdre, banzete ya ba ngómbá na binó ya kitoko, pe bitondi ba mbuma lokóla ba olivier biye bikokola na etando patátáló, na sudi pe pembeni ya ebale".

Sántu-Papá alingaki kopesa mbote na biténi binsó ya Liban esika wápi akokaki kokoma te na mobémbo eye, lokóla etúká ya Tripoli na nordi, Bekaa na monyele pe eténi ya sudi, "biye bikobika likambo lyoko ya etumba pe ya boyébi te". "Nayambi binó bansó pe natombeli binó boboto. Pe nabwaki mbela ya lombango po 'te mobulú na bitumba bisila. Moto mókó te akondima 'te etumba na mondoki ememaka eloko yoko ya ntina. Mindoki bikoboma, nzókandé bosololi, bosilisi bowelani pe lisoló bikotonga. Topona bansó boboto lokóla nzelá, pe kaka lokóla likambo tokoluka!", elendisaki Papá

Papá wa Roma asúkisaki lisikulu na ye na bolobi lisusu maloba ya Papá Yoane- Polo II na eye etáli ekóló ya Cèdre: "Liban, koleka ekóló yoko, ezali nsakola yoko!".

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

03 sánzá ya zómi na míbalé 2025, 13:48