Na Beyrouth, Léon XIV asengi bomoko mpe boboto (kimya)

Pápa asalaki lisukulu moko ya ntina mingi na likita lya bato ya mangomba ndenge na ndenge na Beirut, mokolo mwa 1 Desembe 2025, liboso lya ebele ya bato oyo bayanganaki na esika ya bamartiro (Place des Martyrs). Ezalaki bongo mbala ya misato oyo Pápa asalaki lisukulu na Liban. Mboka oyo ezali ntango inso na ntina mingi mpo na Vatican. Mokonzi ya Eklezya Katoliko andimi lisusu ntina ya boboto, bomoko mpe bolimbisi. Ezali mabongi ma ntina oyo ezali na kati ya lisolo ya Liban mpe ya Moyen-Orient.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Likambo mosusu ya ntina na mokolo mwa mibale ya mobembo ya Pápa na Liban, mabele moya ya bobenisi to ya lipamboli, esika ya kobotama ya Bokristo ya ngambo ya Esti, epai wapi Boyambi bopiki misisa mya kala mpe o bozindo.  Ezalaki bokutani ya ekumenisme mpe ya mangomba na esika ya ba Martyro, na kati ya engumba Beirut, mokolo mwa yambo, mwa 1er ya sanza ya zomi na mibale nsima ya nzanga.

Bayambaki Léon XIV, na mokonzi ya eklezya ya Katoliko ya Syrie, mokonzi ya Lingomba ya Maronite, imam monene ya Lingomba ya Basunni mpe batindami ya Lingomba ya Shiite, yambo ‘te akende kovanda na tribune, epai bakonzi basusu ya mangomba bazalaki. Ezali esika ya elembo ya botelemeli bwa Liban, oyo ekomaki moko ya bisika ya liboso oyo bato oyo bazalaki kotelemela guvernema bazalaki kokutana.

Nsima ya loyembo ya bofungoli, lisukulu ya boyei bolamu mpo ya koyamba mokonzi ya Eklezya ya Katoliko ya Syrie mpe botangi ya Evanzile na nzembo na lokota ya Arabe, mwa kimya moke elandisamaki na loyembo ya Coran, litatoli ya video, oyo ezalaki na motó ya likambo “Esengo na bato oyo batyaka kimya” - oyo ezalaki kolobela misala, makambo oyo bato bakutanaki na yango mpe masolo mya bomoi ba bango mpo na bomoi ya lisanga (ya bomoko).

Na likita lyango, bakonzi ya Ortodokse ya Grèce, ya Shiite, ya Syrie, ya Druze, mpe mokonzi moko ya Lingomba ya Ortodokse ya Arménie batelemelaki makanisi ya bakonzi. Na nsima, bakonzi ya Lingomba ya Protesta mpe ya Alaouite, bakonzi balandanaki molongo moko sima ya mosusu mpo na mosala monà moko.

Mbela ya bomoko kati na bokeseni

Na lisikulu na ye, Pàpa asepelaki na komona lingomba lya bakristu oyo basali moko kati na misato ya bato ya 5,8 millions na mboka oyo ezali na majorité ya ba muzilman. Léon XIV abombaki te esengo monene na ye ya kozala na mokili ya banzete ya Sedre, “mokili ya bobenisi” oyo “basakoli ya Boyokani ya Kala bakumisaki”, elobaki ye, oyo “ezali kokoba kobenga na bileko binso baye balingi kofungola mitema mya bango epai ya Nzambe ya bomoi”. Na maloba maye, Pápa alobelaki libula ya elimo ya Liban, esika oyo mangomba ndenge na ndenge esanganaka, epai oyo bakristu, Bamizilma mpe ba Druzes bayekolaki kofanda esika moko atako bakutanaki na mikakatano ya kala.

Tata Mosantu azongelaki maloba ya exhortation apostolique Ecclesia in Medio Oriente ya Benoît XVI, oyo esalemaki na Beyrouth na 2012, mpo na komonisa ‘te masolo kati na mangomba ezali na kati ya mosala mwa Eklezia, mingimingi na Moyen-Orient. Alobi ete masolo yango “ezali liboso liboso na moboko ya teoloji oyo ezali kotuna boyambi”, mpe asengi na ba-Liban ‘te baluka esika moko na miso ma Nzambe, na elimo ya komikitisa mpe ya boyokani. Ayebisaki bango ‘te: “Kozala na bino awa lelo, na esika oyo ya kokamwisa epai minaret mpe ndako-nzambe ya ngonga etelemi pembeni, kasi nyonso mibale ezali kobuta kino na likoló, ezali litatoli ya boyambi makasi ya mokili oyo mpe ya bomipesi ya bato na yango epai na Nzambe moko”. Tika ‘te na mabele maye, lolaka na lolaka ya ngonga, mpe adhān na adhān,elela mpo ya lokumu na nzambe mokeli na nyonso te, kasi mpe mpo na kotombola mabondeli ya bosolo, mp ona likabo lya Kimya to boboto.

Liyebisi lya elikya mp ona Moyen-Orient

Bambula mingi mileki, mpe mingimingi na mikolo miye euti koleka, Pápa Monene alobaki ‘te: «Miso ma mokili ezali kotala na Moyen-Orient, esika oyo mangomba ya Abalayama ebotamaki. Kasi likabo la motuya oyo ya boboto (kimya) ezangi kuna. «Bat oba mokili mobimba batalaka ntango mosusu Moyen-Orient na makanisi ya bobangi a mpe ya bolembi nzoto». Mpo na Pàpa, kofanda na kimya esika moko, atako ezali ntango inso na mokakatano, ekoki kosalema, lolenge emonisami na lisolo ya Liban, esika oyo bato ya mimeseno mpe ya mangomba ndenge na ndenge bakutanaka.

Bato ba Liban, atako bazali na mangomba ndenge na ndenge, bazali kokundwela biso makasi ‘te bobangi, kozanga kotyelana motema mpe makanisi mabe ezali na liloba ya nsuka soki moke te, mpe ‘te bomoko, boyokani mpe kimya ekoki kosalema. Ezali etinda moye mokoki kobongwana te.

“Bato ba Liban, atako bazali na mangomba ndenge na ndenge, bazali kokundwela biso makasi ‘te bobangi, kozanga kotyelana motema mpe makanisi mabe ezali na liloba ya nsuka soki moke te, mpe ‘te bomoko, boyokani mpe kimya ekoki kosalema. Ezali etinda moye mokoki kobongwana te.”

Pápa azongelaki lisusu mitinda ya likita monene ya mibale ya Vatikan, mingimingi na mokanda Nostra Aetate, oyo efungolaki nzela ya sika ya kosolola mpe ya kopesana limemya kati na Bakatoliko mpe bato ya mangomba misusu. Alobi ete masolo yango, oyo esimbami na bolingo bwa Nzambe, esengeli «koyamba bato banso ya motema malamu, koboya bokeseni mpe kondima ‘te moto na moto azali na lokumu ndenge moko». Elobaki ye.

Elembo ya banzete ya Sedre mpe ya Olive

Kati na lisoló na ye, Léon XIV asalelaki mpe elembo ya banzete ya sedre mpe banzete ya olive mpo na komonisa elimo ya kozongisa boyokani. Nzete ya sedre, elembo ya Liban, ezali komonisa bonene mpe nguya, nzokande nzete ya olive, oyo bakristu, Bayuda mpe Bamizilma bakumisaka, ezali elembo ya kozongisa boyokani mpe ya kimya. Nzete ya olive, elobi Pape, “ezali elembo ya elikya mpe ya molende mpo na kolendisa bomoi bwa boboto elongo”, bomoi na yango ya molai mpe makoki na yango ya kokola ata na kati ya makambo ya mpasi ezali bililingi ya malamu mpo na kolakisa ‘te Liban ezali na mokano ya kimya. “Ndenge misisa ya banzete ya sedre mpe ya olive ekotaka mozindo mpe epanzanaka na mabele”, episkopo ya Roma alobaki, “bato ya Liban bapalangana na mokili mobimba, kasi bazali na bomoko na makasi ya libela mpe na libula ya ntango molai ya mboka na bino”.

“Na mokili oyo ezali se kobakisama na boyokani, bobengami mpo na kozala bato ba kimya: mpo na kobundisa kozanga kokanga motema, kolonga mobulu mpe kolongola bokaboli, kasi boluka kongengisa nzela ya bosembo mpe boyokani mpo na bato banso, na nzela ya litatoli ya boyambi ba bino”.

Losambo mpo na kozongisa boyokani

Na nsuka ya lisukulu na ye, Léon XIV apesaki lokumu na Ngɔndɔ Malia. Mbula na mbula, na mokolo ya 25 sanza ya misato, mboka mobimba ekumisaka Maria, Notre Dame ya Liban, na santuaire na ye na Harissa. Ezali na ekeko moko kitiko ya Maria, oyo bakembisaka. Na maboko ma ye matandami, na koyamba bato banso ya Liban. Tata Mosantu amonisaki elikya na ye ‘te elongi ya mama Maria ekotambolisa bato ya Liban mpe ekotinda boyokani ya libela na Moyen-Orient mpe na mokili mobimba, mpe na yango ekomemela bato banso “elikya mpe bomoko”.

Bokutani ekumeniki mpe ya mangomba ebele na Beyrouth, mokolo moye mwa 1er désembe 2025, na esika ya ba Martiro na Liban.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

01 sánzá ya zómi na míbalé 2025, 21:18