2026.03.28 Na ngonga ya 17h30, Mokonzi Ntomà monene abimaki na hélicoptère ya Principauté ya Monaco 2026.03.28 Na ngonga ya 17h30, Mokonzi Ntomà monene abimaki na hélicoptère ya Principauté ya Monaco  (@Vatican Media)

Léon XIV apesi Principauté ya Monaco mbote ya bokabwani yambo ‘te azonga na Roma

Na ngonga ya 17h30, Mokonzi Ntomà monene abimaki na hélicoptère ya Principauté ya Monaco, nsima ya kolekisa ngonga libwa na engumba-mboka. Na nsima, nsima ya ngonga soki mibale, akokita na héliport ya Vatikan. Liboso ‘te akende, atindelaki Prince Albert II mpe Princesse Charlène telegrami mpo na kopesa bango mbote mpe kopesa bango matóndi mpo na boyambi bwa bango ya esengo.

Bansango ya Vatikan

 

Pene na ngonga libwa nsima ya kokóma na ye na samedi na ntongo, Pápa asukisi mobembo na ye ya bontàma na Principauté ya Monaco, mobembo mwa mibale na libanda ya mboka na ye mpe ya liboso na Poto to mpe Eropa. Molulu mwa kokabwana esalemaki na libándá ya mpepo ya Monaco, na nsima ya mayi ya mbù monene. Nsima ya kopesa mbote na batindami ya mboka mpe ya bato ya Monaco (ba Monégasques), Pápa alekaki na etuluku ya bato ya lokumu mpe apesaki mbote na Prince Albert II mpe na Princesse Charlène.

Mbote ya Pàpa na Prince Albert II ya Monaco
Mbote ya Pàpa na Prince Albert II ya Monaco   (@Vatican Media)

Botóndi mpo na boyambi bwa esengo

Na nsuka, Léon XIV amataki na hélicoptère. Mpepo yango elongwaki na ngonga ya 17h30 na Monaco, ezalaki kokende na Italie. Akomaki mpe telegrami mosusu mpo na Mokambi ya Monaco, Prince Albert II, apesaki ye matondi mpo na boyambi. Apesaki mpe melesi na mabota ya bokonzi, na mbulamatari, mpe na bato ba Monako, “oyo bayambaki yen a esengo mpenza mpe na ezalela ya kokaba”. “”Nasambeli ete Nzambe Nta-Bokasi bonso apesa bino banso kimya mpe makasi “, mpe apesaki bango bobenisi bwa ye.

Na yango, Pápa atikaki bongo ekólo to bokonzi bwa Monaco mpe azongaki na Vatikan, epai wapi akitaki na mpokwa mwa moke liboso ya ngonga ya sambo (19h00).

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

28 sánzá ya mísáto 2026, 20:43