Lomingo la mbila: «Yezu, Mokonzi wa Boboto» liboso lya mobulu mwa mokili

Na misa ya mokolo mwa lomingo la mbila la mokolo mwa 29 ya sanza ya màrsi, na Esika Saint-Pierre, Pàpa Léon XIV abyangi bakristu ba landa Kristu na nzela ya ekulusu, ba tala kati na Ye «Mokonzi wa boboto» oyo aboyi mobulu mpe abengisi bato na kozongisa boyokani. Kristu azali kolobi na mokili mwa biso lelo: “Bozala na ngolu! Botika mandoki, bomikundola ‘te bozali bandeko!»

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Nsima ya molulu mwa milongɔó mya mandalala, oyo esalemaki elongo nà banzembo ya makumisi mpe ya esengo. Ut’o ebandeli ya lisukúlu lya ye, Pápa Léon XIV, atyaki molulu mwango na nsé ya elembo ya mobembo elongo na Kristu, Mokonzi ya nkembo. “Awa Yezu atamboli o nzela ya kuruze, tólanda yé nsima”. Nzela eye, ezali nzela ya bolingi ndelo nsuka te, oyo apesaki na biloko binso akeláki: bakristu babyangemi na kotala “malozi ma ye mpo na bato banso ya mokili, motema mwa ye mozoki, bomoi bwa ye oyo emokomisi likabo lya bolingo”.

Pàpa Leon ya XIV akambaki Milulu mya Mokolo mwa Lomingo la Mbila to Mandalala, na Vatikan.
Pàpa Leon ya XIV akambaki Milulu mya Mokolo mwa Lomingo la Mbila to Mandalala, na Vatikan.   (@Vatican Media)

Mokonzi wa boboto to ya kimya o kati na mobulu

Na kati ya nsango na ye, Tata Mosantu alakisaki Yesu lokola “Mokonzi wa Boboto to ya Kimya”, oyo ezalela ekeseni mpenza na mobulu ezalaki na mokili mwa ntango na ye mpe oyo ezali kosalema lelomei. “Tozali kotala Yezu, oyo azali komimonisa lokola Mokonzi ya Kimya, nzokande etumba ezali kobongisama zinga-zinga ya ye. Ye atikalaki ngwi na boboto, nzoka nde basusu batambolaki na mobulu. Kristu amipesi lokola libondi mpo na bato, nzoka nde basusu basimbi mipanga mpe banzete, elobaki Tata Mosantu. Bokeseni bonà bokómaka makasi na Malozi (Passion): “Azali mwinda mwa mokili, nzokande molili elingi kozipa mokili”. Ayaki mpo na kopesa bomoi, nzokande mokano mwa kokatela ye etumbu ya liwa esili kokokisama”.

Liboso lya kobilama ya mobulu na mokili, Pàpa akundoli’te etindà to mosàlà mwa Kristu, Mokonzi wa molongó, ezali ya kokotisa boyokani kati na mokili mwa bato. Yezu alingi koyokanisa mokili nà ekopi ya Tata, mpe alingi kokweyisa bifelo biye bizalaki kokabola biso nà Nzambe mpe nà baninga ba biso., mpamba te, yen de azali kimya ya biso, (Ep 2, 14). Bokonzi moko ekomonisama na bomikitisi: “Yezu akoti o Yeruzaleme likolo lya mwana mpunda kasi ya mpunda te”. Na yango, akokisi esakweli ya kala oyo elobaki ‘te: “Bósepela mpe bóyoka nsayi na boyei bwa Mesiya” mpamba tè ayei na “Bobolà”, mpe akosakola “Boboto to kimya epai na bikólo”. 

Koboya mpenza mobulu

Ntango bamekaki ye na makasi mpe na mobulu, Kristu aboyaki na motema moko mpe na makasi monso mpe alendisaki boboto mpe kimya. “Bongo tango moko na baye bazalaki na ye elongo abimisaki mopanga mwa ye mpe abetaki moombo ya nganga monene mpo na kobundela ye, apekisaki yen a mbalakaka mpe alobi na ye: “Zongisá mopanga mwa yo na esika na yango, mpo baye banso bakamataka mopanga bakokufa na mopanga”.

Yezu amibundelaki te, kasi “amonisaki elongi ya boboto ya Nzambe, oyo aboyaka mobulu tango inso, mpe na esika ya komibikisa ye moko, amitikaki ‘te babaka ye o kuruze. Asalaki bongo mpo ya koyamba bakuruze nyonso bakopikaka na bileko binso mpe na bisika binso na lisolo lya bato”, elobaki Papa. Azwaki mandoki tè, azongisaki mabé tè, amamaki ata etumba soki moko te, nzokande aponaki kokende na nzete ya kuruse. Ezali ezalela ekomonisa mpenza elongi ya Nzambe oyo “akoboyaka bitumba, Nzambe oyo moto moko te akoki kobelela na mpó ya lokuta na ya etumba. Elobi Tata Mosantu, Ye aboyaka koyoka baye bazali kosalisa bitumba, mpamba tè, akoloba na bango te, maboko ma bino etondi makila”.

Lolàkà lya baye bazali kokutana na Kuruse ya Kristu

 Kotàla Kristu oyo babàki o kuruse mpe azali konyokwama na ekulusu, ezali mpe koyeba mpasi, minyoko mpe bualé ya mokili mwa lelo. Pápa alobaki ‘te: “Na kati ya bampota ma ye, tozali komona bampota ya basi mpe mibali mingi mya mikolo na biso”.

Na lolakà la yé ya nsuka, tango a gang ina Tata, tozali koyoka kolela ya baye bazali konyokwama, baye bazangi elikya, baye bazali na maladi, baye bazali bango moko. Mingi mpenza tozàli koyoka kolela to kotata na mpasi ya baye banso bazali kozwa mitungisi na nzela ya mobulu mpe baye banso bazwi likàma ya etumba.

Kristu azali kokoba bongo na kolobela mokili y abato: “Nzambe azali bolingo! Bozala na ngolu! Bokitisa mandoki, boyeba to mpe bokundola yango malamu ‘te bozali bandeko!”. Na nsuka ya lisoló na ye, Pápa Léon XIV azongeláki maloba mwa Mosaleli wa Nzambe, Monsieur Tonino Bello, bongo apesaki lolàkà lóna epai ya Ngondo Maria. Amonisaki elikya makasi.

 Pàpa Leon ya XIV akambaki Milulu mya Mokolo mwa Lomingo la Mbila to Mandalala, na Vatikan.]
Pàpa Leon ya XIV akambaki Milulu mya Mokolo mwa Lomingo la Mbila to Mandalala, na Vatikan.]

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

29 sánzá ya mísáto 2026, 17:41