Misa na Monaco: Pàpa abyangi na kotika kokweya na kofukamela bokonzi mpe mosolo

Likambo lya ntina mingi na mobembo moye ya mwa bangonga moke Léon XIV asalaki na Principauté ya Monaco. Akambaki misa liboso lya bakristu nkoto zomi na miyano, (15 000) na stade Louis II. Lokola Pápa, ayaki mpo na kolendisa bandeko ba ye ya Monaco kati na boyambi na bango, apamelaki bitumba bizalaki kosalema, mpamba te ezali “mbuma ya mposa ya kokómisa bokonzi mpe ya mosolo lokola banzambe”.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

Bato koleka nkoto zomi na miyano (15 000) basanganaki na misa elongo nà Pápa Léon XIV na stade Louis II. Bakristu ya lingomba ya Monaco bazalaki na mposa ete mokolo mona ma ntina mingi, ekoka kozanga te mpo na Principauté ya Monaco, oyo epai kuna, Lingomba ya Katoliko ezali nayino lingomba ya Leta. Léon XIV azali kaka te pápa ya liboso, oyo akei na mboka oyo ya libangà na mikolo miye ya biso, kasi azali mpe pápa ya liboso oyo akambaki molulu mya Ukaristia na esika monene ya masano ya ba-Monaco, oyo ezwami pembeni na Mbu ya Méditerranée.

Asalaki masukúlu masato na lokotà ya Lifalansa o mokolo mwango, Bongo Léon XIV apesaki makanisi ma ntina na Nsango Elamu ya Yoane (Jn 11, 45-57). Mokanda mwango elobeli likambo esalemaki na bomoi bwa Kristu, ntango banganga-nzambe bakonzi mpe Bafariseo bazwaki ekateli to likanisi ya kobóma Yé mpo asekwisaki Lazaro. Pápa alimboli été, ekateli enà, eutaki na «makanisi ma politiki oyo etongami na bobangi», mpamba te, lokola ekomami na ntómà Polo, «soki Yezu akobaki kopesa elikya, kobongola mpasi ya bato na esengo, 'Ba-Roma bakoyà mpe bakobebisela bango mboka» (tala na molongo mwa. 48). Nzokande, nsima ya sómo ya bakonzi ba Eklezya, ezali ‘te, bazalaki kozwa to komona Yezu lokola likámá to monguna mabango. Likanisi linà, ezalaki koùta na mposa makasi ya kozala na bokonzi. Pápa alobaki ete: “Bato babosani mobeko mopekisi koboma”, kasi “Nzambe abosanaka te elaka oyo ezali kobongisa mokili mpo na lobiko”.

Na yango, tozali komona makambo mibale miye mikeseni: ya liboso, emoniseli ya Nzambe, oyo ezali komonisa elongi na ye, Nta Bokasi bonso mpe Mobikisi; ya mibale, misala mya nguya ya bakonzi oyo ebombami, mpe oyo ebongisami mpo na kobóma ezàngà mawa. Ezali sé bongo te, ezali mpe koleka o moyi mwa lelo?.[ Na yango, tozali komona makambo mibale miye mikeseni: ya liboso, emoniseli ya Nzambe, oyo ezali komonisa elongi na ye, Nta Bokasi bonso mpe Mobikisi; ya mibale, misala mya nguya ya bakonzi oyo ebombami, mpe oyo ebongisami mpo na kobóma ezàngà mawa. Ezali sé bongo te, ezali mpe koleka o moyi mwa lelo?. ]

Kimotema Ngolu nde ebikisi mokili

Na mokolo moye liboso lya Lomingo la Mbila to ya Mandalala, mpe etikali poso moko liboso lya molulu mwa Pasika, Léon XIV akundoli ‘te «Mwana akokokisa mosala mwa Tata [na Pasika] na nguya ya Elimo Santu». Lisolo la Yezu ekokani nà oyo ya “bato mike mpe baye bazali konyokola». «Ata lelomei, Papa abelelaki, boni boni bato bazali kosala mitango to ba calculs na mokili, mpo na kobóma bato bazangi mbeba; bantina ba lokuta boni elobami mpo na kolongola bang ona bomoi. Kasi, ndenge Yezu abikisaki Lazaro na nkunda to lilita la yé, boyengebene bwa seko bwa Nzambe epesaka bomoi bwa sika. “Mokonzi alongolaka mpasi, bongo atye elikia” mpe “abongolaka motema makasi na Nguya ya mosala; mpo na kolakisa bongo nkombo yaBokasi bwa Ngolu bwa ye”. Kolona ezalela ya ngolu, epusaka ezalela ya koboya baningà. Ezongelaki maloba malobamaki mingi Pape François, na mokitani na yé.

Tókima bikeko, tóbakisa bolingo koleka.

Mokonzi ya Lingomba ya Katoliko alobaki ‘te “kozanga bosembo oyo ezali konyokola bato mpe bitumba oyo ezali kosopa makila ma bango, ezali nde “mbuma ya mposa ya bokonzi mpe ya mosolo to mbongo”. Nzambe atikaka biso te na masengenya manà, kasi ayàka kosalisa moto oyo azali na bolembu mpe azali konyokwama, oyo atyelaka bikeko bya mokili motema ‘te ekobikisa bomoi bwa ye”. Kofukamela bikeko bizali kokómisa bato baombo, mpe Pápa alobaki ‘te “bomoi binso biye bizokisami, ezali mpota monene ekozokisa Nzoto ya Kristu".

“Tómesana te na makelele ma mandoki, na bililingi bya bitumba! Kimya ezali te kaka bokokani to momekano ya koyeba nani azali makasi, kasi, ezali mosala ya mitema peto, mosala ya baoyo bayebi komona na basusu, ndeko ya kobatela, nzokande monguna ya kokweisa te.”

Mp ona Eklezya ya Monaco, Pápa Léon XIV alendisaki bakristu na nzela ya boyambi bwa bango, bámonisa esengo ya solosolo oyo euti na bolingi bwa Nzambe. Bolingo «mpo na bomoi ebotami sika mpe ezali na bosénga, mpo na koyamba mpe kobatela yango ntango inso”;  “mpo na bomoi ya bilenge mpe ya mibange, mpo na kolendisa yango na mikakatano mya mibu minso”;  “mpo na bomoi, ezala na nzoto kolongono to oyo ezali na bokono, ntango mosusu kozala yo moko, oyo ezali na bosénga ya kozala elongo na bokebi”.

Mobembo ya Bontomà na Monaco,, na tango ya Misa mokambamaki na Pàpa Leon ya XIV

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

29 sánzá ya mísáto 2026, 15:37