Na sànzà ya Apríli, Léon XIV asengi bàsámbela mpo ya ba Sàngó bazali na mpasi
Bansango ya Vatikan
Na ebandeli ya Poso Mosantu, Pape Léon XIV ayebisi mokano mwa ye ya losambo mpo na sànzà ya minei, mpo na basàngà oyo bazali na nkwokoso, kofungola esika ya kokanisa na ntina ya kobatela bango, koyoka bango mpe kosunga bango. Na nzela ya du Réseau Mondial de prière du Pape mpe ya campagne Sambela elongo nà Papa «Prie avec le Pape», Tata Mosantu azali kobenga bakristu mpe bato banso ba motema bolamu, bàzala na mwa ntango ya kobondela, mpo na koyeba mpe kokota o bozindo na ntina ya koyeba ‘te nsima ya mosala nyonso, ezali na bomoi boye ezali mpe na mposa ya kozala pene na bato mpe ezali na bosengà ya koyokama.
Na losambo lya ye, Pàpa asambeli mpo na banganga-Nzambe bazali koleka na eleko ya mpasi to ya mikakatano. Leon ya XIV akundoli ‘te «ba nganga-Nzambe bazali basàli ya Leta te to ba héros oyo bazalaka bango moko (solitaires) te, kasi bana balingami, bayekoli bayebia komikitisa mpe balingami, mpe babateli mpata oyo basimbami na mabondeli ma bato ba bango».
Epai mosusu, Mokonzi ngana-Nzambe monene alobelaki ntina ya kokundola kozala lisanga lya mosàla ya Bonganga. Mingi mpenza abyangi bakristu, «bàyoka kasi bàkweisa bango té, batondo bango botondi kasi baluka te kozala mbamba nà bango ‘te bazala sembo ; mpe bakamba bango na mabondeli na motema mobimba». Basengeli koyeba ‘te, mosala ya bonganga ezali mokumba moye mosengeli kosungama na libota mobimba ya bana ba Nzambe.
Na nsambo ya ye, Tata Mosantu asengi ‘te, banganga-Nzambe batiya motema na “ba amitié ya malamu, na ba rezo ya lisungi ya bandeko” mpe na nguya ya kokundola libyangi to vokation ya bango
Kosunga na bondeko baye bazali kosunga
Sàngó Cristóbal Fones, mokambi ya mokili mobimba ya rezo ya losambo lya Pàpa, alobi ‘te: “likanisi liye ya losambo, esimbi ye mpenza o motema. Tosengeli kosunga na bondeko baye bazali kosunga. Ye moko ayoki bosenga bona na pembeni, likolo lya bandeko basàngó mpe banganga-Nzambe bazali koleka na eleko ya mikakatano. Ezali na ntina mingi kokanisa na bato basusu ntina ya kozala na baninga ya solosolo, mpe oyo eleki ntina, ezali, kosalisa bango na nzela ya Losàmbo. Basàngó basengeli koyeba ‘te bazali bango moko te”.
Na kotalela mateya ma kala ya Eklezia, kobanda na likita lya mibale ya Vatikan tee na mateya mya bapápa ya mikolo mya biso, bamonisi ‘te : «Sàngó azali moto ya mpasi oyo azali na mposa ya motema mawa, ya kozala pene na bato, mpe ya koyeba komitya na esika na bango. Na yango, ezali na ntina mingi ‘te báyeba ‘te basengeli te koyika mpiko bango moko na ntango ya bolembu bwa nzoto, kasi basengeli kotika ‘te bato ba mboka na bango básalisa bango mpe básunga bango. Yango wana, bondeko bwa bonganganzambe, bomoi bwa lisanga mpe bansambo ya libota lya bana ba Nzambe emonani lokola bisika to liziba lya ntina mingi ya Ngrasya oyo ekoki kozongisa bango na bomoi bwa sika mpe kosalisa bango na mosala mwa bango ya mokolo na mokolo.
Bobanga té bolembu bwa bino: Nzambe akotala banganganzambe semba te.
Yémei Pàpa Leon XIV, na mokolo mwa 27 ya Yuni ya mobù 2025, na libakù lya la Journée de sanctification sacerdotale alobelaki bango ‘te : « bobanga te mpo na bolembu bwa bino, mpamba te Mokonzi azali koluka banganga-nzambe oyo bazali na mbeba te, kasi baoyo bazali na mitema ya komikitisa, baoyo bazali pene na kobongola motema, baoyo bazali pene na kolinga lokola ye alingaki biso». Lokola elobaki yango Pàpa Fraçois na bililingi na yen a mobù 2018 (dans La vidéo du Pape de juillet 2018).
Na Rezo ya losambo ya mokili mobimba ya Pàpa, balobi ‘te mokano moye mozali kaka libyangi ya kobondela te, kasi ya kosala : kotombola bisika ya koyoka, kolendisa bato oyo bayambaka bato, koboya kotyola bato mpe kokolisa boyokani kati na bato.
Rezo ya losambo ya mokili mobimba
Rezo ya losambo elongo nà Pàpa, na mokili mobimba, oyo ekambami na Société de Jésus, ezali lelo oyo na mikili koleka tukù libwa (90) mpe ezali na basangani koleka milio tukù mibale na mibale (22.millions) y abato. Ebandisamaki na mobù 1844 na kombo ya « Apostolat de la Prière », sima ekomaki ekela ya Vatikan na 2020 na likanisi lya (initiative) ya Pàpa François. Makanisi ma ye ma sanza na sanza ebyangi bakristu na kobondela to kosambela mpe kosala liboso lya mikakatano minene mya bato na mokili mpe ya mosala mwa Eklezia.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
