Likita lya bansó: balaíki bakopolisa mokili na elimo ya Kristu
Jean-René Bompolonga - Kinshasa
Libosó ya bandimi 15 000, basangani na esika Sántu-Petelo atáko eleko ezalaki malámu te, Léon XIV akobaki litéya na ye etáli bambuma ya Concile Vatican II mpe mingi mpenza mobéko-likonzi ya litéya Lumen gentium eye akolimbola úto bapóso ebelé. Sima ya lomeko ya bokónzi ya Eklezia na póso elekaki, Papá abongisaki likanisi na ye mokolo ya misáto ya yambo ya sánzá ya minei etáli etindá ya balaíki. Baye Eklezia alimbolaki na bikeke lokolá kaka «baye bazali na káti ya basáli ya Nzámbe to bamibonza te», ekundolaki Tatá-Esántu.
«Ezali bôngó bato kaka ya Nzámbe, eponami na ye: "Mokónzi se mókó, boyambi se bokó, batisimo se yókó" (Ep 4, 5); lisangá ezali lokúmu ya bilama na bobotami na bangó lisusu na Kristu, lisangá ezali ngrásya ya bondimi mwána, lisangá mbela ya bobongisi makási; ezali kaka na libiki lyokó, elikya se yókó mpe likabo lyokó na bokabwani te» (LG, 32), elobaki Papá, na botángi mwá makambo ya Lumen gentium. Concile Vatican II elobi kaka bokokani káti ya baye bansó bazua batisimo, kasi lokolá «lokúmu mpe bonsómi ya bána ba Nzámbe» (cf. LG, 9).
Balaíki basáli nzóto ya Kristu
Likabo ezali linéne koleka, bomipesi ezali monéne lokola. «Kasi etindá evandi na nini mpe ezali nini?» emitunáki Papá. Lokolá eyano, Léon XIV alobaki lisusu ndimbola ya balaíki epésamaka na Concile: «Toyébi na balaíki bandimi bakristu bansó [...] baye, basangani na Kristu na batisimo, bakotisama na Bato ya Nzámbe, mpe bazali kosála na ndéngé na bangó mosála ya bonganga, ya mosakoli mpe ya bokónzi ya Kristu, bakosála eténi na bangó, na Eklezia mpe na mokili, etindá eye ezali ya bato bakristu bansó». (LG, 31).
Mosika ya kozala lisangá lyokó ezanga loléngé, bato ya Nzámbe bakolakisa nzóto ya Kristu, elobaki Papá, «lisangá ebongisami na ndéngé ya mosála, na boyokani ya kobóta káti ya ba loléngé mibalé ya bozali na bonganga ya Kristu: bonganga lisangá ya bandimi mpe bonganga ya ministeli» ( cf. LG, 10). Bongo, esémbolaki ye, «likoló ya batisimo, balaíki bandimi bazali kaka na bonganga ya Kristu».
Eklezia yókó na bobimi
Na bokolisi likanisi na ye, Papá Léon XIV atangaki lilendisi esántu ya sántu Yoane-Polo Il Christi fideles laici, oyo abimisaka lisusu na 1988 mosála ya balaíki na bobengi «bandimi laíki bansó, mibáli mpe bási, ya kosála» na «elanga ya vino» ya Kristu.
«Elanga enéne ya mosála ya balaíki ekosúka na esika ya Eklezia te, kasi ekopanzana na mokili», elobaki Tatá-Esántu. «Eklezia, ya sóló, ezali esika nionso epái wápi bána na ye bakosakola mpe bakotatola Nsango-Ndamu: na bisika ya mosála, na lisangá ya bacivil mpe na boyokani nionso ya bato, esika wápi, na maponi na bangó, bikolakisa bonzenga ya bomoí ya bokristu, ekolekisa libosó áwa mpe sik’oyo bosémbo mpe boboto biye bikozala meke na Bokónzi ya Nzámbe»
Mokili ezali na mpósá «kopolisama na Elimo ya Kristu mpo ya kokóma na ndéngé elongobami súka na ye na bosémbo, likabo mpe boboto» (LG, 36). Likambo lyokó ekoki kosálema kaka «na lisálisi, mosála mpe litatoli ya balaíki!», elobaki Papá.
Mokitani ya Petelo alobaki liloba elingamaka mingi na Papá François, eye ya «Eklezia yókó na bobimi». Eklezia, ebakisaki Léon XIV, «ekota na lisapo, efúngwama kaka na etindá, na eye tobengami bansó ya kozala bayékoli-batindami, bapostolu ya Nsango-Ndamu, banzeneneke ya Bokónzi ya Nzámbe, bakumbi ya esengo ya Kristu eye tokutanaka na ye!».
O eleko ya nsakola na ye na bato ya mobémbo mwa boyambi ya lokota y'Allemagne, Papá Léon XIV abengaki bandimi, libosó ya Mokolo ya Minei Esántu, ya komanyola «Malozi ya Mokónzi, na bosangisi pási na bisó mpe biye ya mokili na Kuruze na ye zambi ya kokóma na Ye na esengo ya Pasika mpe na bomoí ya sékó»
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.
