Likita lya banso ya mokolo ya misato 8  ya sanza ya minei 2026 Likita lya banso ya mokolo ya misato 8 ya sanza ya minei 2026   (@Vatican Media)

Likita lya bansó: nzelá ya bosántu ezali ya kofúngwama mpo ya oyo nionso azua batisimo

Na bokobi molongó na ye ya matéya na botángi lisusu mobéko-likonzi ya Concile Lumen Gentium, Léon XIV atelemaki mokolo ya misáto eye na esáleli ya mabongí biye bikomema na bosántu, káti na yangó likabo, bobola, botosi mpe bopéto.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Ezali na lyokó ya mokabo ya ntina ya Lumen Gentium, ya mitáno, ebongisami nionso na mbela ya bandimi na bosántu, ndé Léon XIV abongisaki litéya na ye ya mokolo ya misáto 8 ya sánzá ya minéi, na esika Sántu-Petelo, libosó pembeni ya bato ya mobémbo mwa boyambi 30 000, káti na bangó mingi bakómi na Roma mpo ya mpóso ya Pasika.

Bosántu, elobi mokánda ya Concile etálemaki na episkopo ya Roma úto 18 ya sánzá ya mibalé, mokolo ya misáto ya putulu, «ezali litómba lyokó ebombama» mpo ya mwa ndambo ya baponami te, «kasi likabo lyokó eye ekotindá mókó mókó azua batisimo ya kokóma epái bobongi ya likabo, elingi koloba bonéne ya bolingo epái ya Nzámbe mpe epái ya moningá na ye». Mpe Léon XIV ya kolakisa 'te likabo ezali libongi lyokó o ntéi ya bosántu. «Ekokamba makoki mansó ya bosántisi, ekopésa bangó molimo na bangó mpe ekomema bangó na súka». Ekoki komema kinó lomeko ya likoló koleka ya bosántu eye ezali martíro, «litatoli ya likoló ya boyambi mpe ya likabo». Na yangó, mobéko-likonzi ya Concile ekoyebisa lisusu 'te «mondimi nionso asengeli azala abongami ya kotubela Kristu kinó ya kosopa makila na ye, lokolá yangó esálemaka mpe ekosálema leló».

Bosántu mpe mbongwana

Balabala eye ekomema na bosántu ekomama na Kristu ye-méi, eye moto nionso akokokana ntángo azui sakraménto ya Komúnyo. Kristu asántisi Eklezia, eyebani lokolá bato ya Nzámbe. Eklezia ezali «ya sóló esántu», elobi Lumen Gentium, kasi yangó elingi koloba te, esémbolaki Papá, «'te ezala mobimba mpe malámu mpenza, kasi 'te ebengami ya kososola likabo ená ya bonzámbe o eleko ya mobémbo mwa boyambi ya ye epái ya etindamelo ya sékó». Lokolá bosóló ya lisúmu ezali kaka na Eklezia, mbongwana mókó ya bomoí ya mozindo ezali na ntina «na bomipesi na bisó na Mokónzi, oyo azali kozongisa bisó sika na likabo».

Bato bazua batisimo babéngami ya kosála etindá yókó: kobongwana zambi ya kosukisa bosántu na bomipesi bokó ya pamba ya molimo te, eye ezali te. Bosántu ezali «likambo ya ntina kútu na bomoí ya mokristu, mingi mpo ya ye mókó koleka lisangá».

Litatoli ya bomoí ebonzama

Na bokangisi bomoí na lisangá, na mokabo ya motoba ya Lumen Gentium, Papá wa Roma akómi na mosála ya ntina ya bomoí ebonzama, «elembo ya lisakoli ya mokili ya sika», mpe ya mabongi bikotambola elongo: bobola, bopéto mpe botosi. Tatá-Esántu abakisi: «Bobola ekoloba botiyi motéma mobimba na Libánela (Providence), na bolongui na motángo mpe mbano ya yo mókó; botosi ezali ndakisa ya komikaba eye Kristu asálaka na Tatá, na botiki bokániseli mabé mpe bonyati; bopéto ezali likabo ya motéma mobimba mpe pétwa na bolingo, na mosála ya Nzámbe mpe ya Eklezia».

Na botáli loléngé ya bomoí ena, bato bamibonza bazali banzeneneke na bomoí ya mbela ya oyo nionso azua batisimo na bosántu, na botatoli boyambi kinó na Kuruze, mpo «ezali na bosémbo mbeka ya Mobákemi ndé bansó tosombami lisusu mpe tosántisami», elobi Mokitani ya Petelo.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisolo liye.

08 sánzá ya mínei 2026, 15:19