2026.04.07  Elembo to Logo mpe Motó mwa maloba ma ntina to devize ya mobembo  ya Pàpa Leone XIV na Spagne na mikolo mikoya 2026.04.07 Elembo to Logo mpe Motó mwa maloba ma ntina to devize ya mobembo ya Pàpa Leone XIV na Spagne na mikolo mikoya 

Elembo mpe motó ya likanisi mpo na mobembo ya Pàpa na Espagne ebimisami

Motó mwa maloba ma ntina to devize oyo baponi, ezwami na Nsango Elamu ya Yoane “Botómbola miso” (Jn 4 - 35), ezali mbela ya kotya makanisi ma biso sima ya mitungisi mya mokolo na mokolo mpo na kokundola lisusu bozalisi bwa Nzambe na bomoi bwa biso mpe kofungola mitema epai ya baninga basusu. Pàpa akosala mobembo na Espagne kobanda mokolo mwa 6 kino 12 ya sànza ya Yuni.

Bansango ya Vatikan

 

Elembo to Logo la mobembo ya Papa na Espagne ezali na lolenge lya liboke ya kofungwama polele oyo ezali kotambola. Esalemi na bililingi bya bato basangani esika moko mpe bazali kotala o likoló. Yango ezali komonisa bomoko, bokutani mpe bosalisani: ezali kaka te likambo lya kozala elongo, kasi kotambola elongo na mokano moko. Ngondo Maria, oyo etyami na katikati, elimboli motema mwa lingomba: azali mama oyo azali koyamba mpe kotambwisa bato epai ya Nzambe, elembo ya bomoko mpe ya elikya mpo na bato banso.

Maloba oyo baponi to devize, “Bótombola miso ma bino” (Yoane 4:35), ezali libyangi ya kotombola miso na biso na nsima ya mitungisi ya mokolo na mokolo mpo na komona lisusu bozali bwa Nzambe mpe kofungwama epai ya basusu. Ezali libyangi ya elikia mpe ya komaniola, oyo ezali kosenga ‘te moto amikangisa te ye moko, kasi azongela bomoko, kitoko mpe bolingo lokola bilembo bya solo ya bomoi bwa bosangani. Ezaleli ya “kotombola miso” ezali mpe komonisa ezaleli ya Eklezia na Espagne mpo na koyamba boyei ya Tata Mosantu: na motema ya kofungwama mpe ya komilengele mpo na kotambola elongo.

Léon XIV akokende na Espagne kobanda mokolo mwa 6 kino moye mwa 12 ya sànzà ya Yuni. Akokende na Madrid, mboka-mokonzi, mpe na nsima na Barcelone, mpo na kofungola ndako ya losambo ya Sagrada Família, ndako-nzambe monene oyo etongi lisusu engumba ya Catalogne. Mobembo moye mokosalema na mokolo oyo tokokanisa mbula nkama ya liwa lya Antoni Gaudí, moto ya mayele na makambo ma botongi, oyo lokumu na ye eyebanaki na mbula eleki. Na nsima, Pápa akolongwa na Barcelone mpo na kokende na bisanga ya Canaries, akosala bongo mobembo moye Pápa François azalaki kolinga mingi kosala.

Eklezya ya Espagne ezali kosepela boyei bwa Léon XIV: «tokoyamba yé na maboko polele»
Eklezya ya Espagne ezali kosepela boyei bwa Léon XIV: «tokoyamba yé na maboko polele»

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

07 sánzá ya mínei 2026, 21:29