Regina Caeli: Pasika ya Kristu ezali kopesa lisusu nzela ya elikya

«Pasika ya Mokonzi ezali Pasika na biso», Pàpa Léon XIV alobaki yango na ntango ya bomanioli liboso lya losambo la Regina Caeli na mokolo moye mwa yambo ya Pasika liboso ya bankoto ya bandimi oyo bayanganaki na esika Saint-Pirre. Alobaki ‘te: «Nsekwa ya Kristu ekotisi ekelà mobimba na eleko ya lobiko, epai wapi motungisi mwa liwa elongwami mpo na libela».

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Episkopo wa Roma amonisi bandimbola mibale ekeseni mpenza na ntina ya likambo lya - lilita litikali mpamba, oyo elobelami kati na Nsango Elamu ya mokolo mwa yambo ya Eleko ya Pasika. Na ngámbo mosusu, ezali na basi, bamemi-nsango ya liboso ya esengo, oyo bazali kokutana na Yezu oyo asekwi. «Na ngámbo mosusu, bakengeli ba lilita, oyo bazuzi ya baSanedrina bapesaki kanyaka mpo na kopanza nsango ‘te bayibaki nzoto ya Yezu. Sanza ezali liziba lya bomoi bwa sika mpe ya seko, mosusu ya liwa ya solo mpe ya libela»

Bokeseni boye, ezali kaka ya kala na lisapo te, elobi ye; ezali mpe kolakisa ezalela ya biso lelomei mpe ezali kotuna bosembo bwa biso moko mpe motuya ya litatoli la biso na mokili moye epai wapi bosolo ezali «kozipama na bansango bya lokuta….Ezali na nzela ya makambo ma lokuta, ya kokosela bato makambo, mpe ya kofunda oyo ezangi moboko ». Mpo ya mikakatano, to makambo maye mazali kopekisa nsango ya lokuta oyo ezali kozipa makanisi ma bato, Nganga-Nzambe Monene akundwelaki ‘te bosolo ya bokristu « etikalaka ya kobombama te» kasi emonisamaka lokola bokasi bwa bomoi oyo ezali kongengisa molili.

Bobanga te ! Bokende kosangela

Na yango, Polo akobi kolobi ‘te, libyangi to mbélà ya Kristu ezali kolendisa biso na kosangela Nsango Elamu na mpiko nyonso ‘te: «Bóbanga te. Bókende koyebisa bato. Leon ya XIV alobi ‘te kosangela Pasika elimboli koloba ‘te Kristu ye moko azali Nsango Elamu oyo esengeli kotatola na mokili mobimba: Pasika ya Mokonzi ezali Pasika ya biso, Pasika ya bomoto to ya bato ba mokili, mpamba te, moto moye akufaki mpo ya biso, Mwana wa Nzambe, oyo apesaki bomoi bwa ye mpo ya biso. Lolenge yoko lokola Mosekwi, oyo azali bobele na bomoi ya libela na libela mpe azali na bomoi lelomei, asikoli makambo ma kala na liwa, lolenge moko mpe Nsango Elamu ya Pasika esikoli mikolo mya biso miye mizali koya o lilita.

Elikya mpo ya bato baye banyokwami

Na kosepela mokolo mwa sikamoye mokonzi asali mpo na biso, elobi Tata Mosantu, Milulu mizali kokumisa «kokóta ya bikelamu binso na eleko ya libiki, oyo wapi «botungisami bwa liwà elongwé mpo ya libela, na nkombo ya Yezu». Alobi ‘te nsango ya Pasika ezali na makambo ma ntina mingi mpo na bato mpe mpo na bomoi bwa bango. Esengeli liboso-liboso kosunga baoyo mabe mpe mobulu mozali koluka kokanga monoko: “Nazali kokanisa bato baye bazali konyokwama na bitumba, bakristu baye bazali konyokwama mpo na boyambi bwa bango, bana baye bazangi kelasi”.

Na kati ya makambo maye, Pápa alobi : kosakola, na maloba mpe na misàlà, Pasika ya Kristu, « ezali kozongisa nzela ya elikya, oyo elingaki kosila na maboko ma bato ba mobulu ». Na yango, Nsango Elamu oyo ezali kosakolama na mokili mobimba, ezali lokola mwinda mwa bisika biye bitumba mpe kozanga bosembo ezali.

Mokonzi Nganga-Nzambe monene asukisaki makanisi ma yé na kokundola Papa François « oyo apesaki bomoi bwa ye na Mokonzi » na mokolo mwa yambo ya Pasika ya mobù moleki. Ntango tozali kokanisa litatoli monene ya boyambi mpe bolingo bwa ye, tika ‘te biso banso tóbondela na Ngondo Maria, Liziba lya Bwanya, mpo ‘te tókóma basakoli bya bosóló, baye bazali sé kongenga tango inso », elobaki Léon XIV.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

06 sánzá ya mínei 2026, 10:39