2026.03.04 Aram I, Catholicos Arménien ya Cilicie 2026.03.04 Aram I, Catholicos Arménien ya Cilicie 

Léon XIV akoyamba o mokolo mwa yambo na Vatican, Aram I, Catholicos Arménien ya Cilicie

Kati na liyebisi moko, ndako ya bopanzi nsango ya Vatican eyebisi ete Mosantu Aram I, Catholicos ya Cilicie akoya na Vatican mokolo ya yambo, 18 Mai. Akosolola na nkuku na Léon XIV mpe akokende na dicastere mpo na kolendisa bomoko ya Baklisto. O mokolo mwa 19 ya sànzà ya màyi, Aram I akosala likita moko, na Institute Pontifical Oriental, mpo na kolobela mikakatano mya ba Eklezya ya Moyen-Orient.

Bansango ya Vatikan

 

Ekozala bongo bokutani ya yambo kati na Aram Ier mpe Leon XIV. O mokolo mwa yambo mwa 18 ya sànzà ya màyi, Mokambi mosantu Aram Ier, Catholicos ya Eklezya ya Armenie ya Cilicie, akoyambama na Tata-Mosantu, na Vatikan; elobi liyebisi moko, o mokolo mwa poso moye 16 ya sànzà ya màyi, na ndako ya bopanzi-nsango ya Saint-Siège. Bokutani bonà bokoleka na bonkùtù, mpe na sima, ekozala na mwa ngonga ya losambo, na chapelle Urbain VIII ya Pallais Apostoliki

Mokambi yak ala ya Comité central ya Conseil ekimeniki ya ba Eklezya, akokende ye mpe lokola kotala dikastele ya mpo ya Promotion ya bomoko ya bakristu. Akokende kotala mpe badikastele misusu na kuria ya Roma.

O mokolo mokolanda, mokolo mwa mibale mwa 19 ya sànzà ya màyi, Aram Ier akosala likita (une conférence)moko ya ngonga moko kaka, mpo na mikakatano mya ba eklezya ya Moyen-Orient, na Institut pontifical oriental.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

16 sánzá ya mítáno 2026, 23:38