206.05.27 Likita lya banso 206.05.27 Likita lya banso   (@Vatican Media)

Likita lya bansó: Momeseno ya Eklezia «ekoyingisa bomátisi»

Papá akobaki mokolo ya misáto eye molongó na ye ya sika ya matéya ebándaka na 20 ya mitáno eleki, na Mokánda ya yambo ya Concile Vatican II ebimisaka: Likambo-likonzi ya milúlú mpe nsámbo bisántu ya bakristu o mísa, Sacrosantum Concilium. Na esika Sántu-Petelo etóndaki na bandimi, Tatá-Esántu alobaki lisusu 'te Litéya ya Concile ekobenga ya «koboya kobungisa bandimi, na bolembisi moto atá nani kobakisa, kolongola to kobongola likambo nini, na eye etáli milúlú mpe nsámbo ya bakristu o mísa, na li

JR Bompolonga – Kinshasa

Na bosimbi encyclique Mediator Dei, Papá abetaki nsete na likambo eye Papá Pie XII alobaka kála 'te «Eklezia ezali eloko yókó ya bomoí» eye, «na bobáteli mobimba ya litéya na ye», eyebi «kokokisana mpe kobongama na makambo mpe na babosenga biye bikobima eleko na eleko». Likanisi lyokó Concile Vatican II azongelaka yangó nionso na Likambo-likonzi Sacrosantum Concilium. Batatá ya Concile balobaka kúna lisengeli ya «kokengele lokolá bozongisi sika mpe bomátisi ya milúlú mpe nsámbo ya bakristu o mísa», zambi ya kokolisa bomoí ya bokristu mpe ya koyanola malámu na mikakatano ya mokili ya sika.

Milúlú mpe nsámbo ya bakristu o mísa ya sika o ntéi ya etindá ya Eklezia

Na «ngonga eye ya lisapo», elakisaki ye, mpósá mókó ya bozindo ya sika ekatisaki Eklezia. Ndéngé ya milúlú bizuamaka na bikeke bileka bitikali ya ntina, kasi mingi bamonaki esengeli kokomisa yangó malámu koleka mpe boboti koleka mpo ya bandimi. Botámbwisi ya milúlú mpe nsámbo ya bakristu o mísa ebongisaka kála libandá ená. Na sima, Yoane-Polo Il akoloba bozali ya «nsinga mókó moke mpe ya eloko káti ya sika ya milúlú mpe nsámbo ya bakristu o mísa mpe sika ya bomoí mobimba ya Eklezia». Engebene na ye, Eklezia «ekokela na milúlú mpe nsámbo ya bakristu o mísa», kasi «ekobika lokolá na milúlú mpe nsámbo ya bakristu o mísa mpe ekozua makási na ye ya bomoí» (Lettre Dominicae Cenae, 13).

«Zambi ya kosálisa bokoti ya bandimi na bomengo ya makabo ya ngrasya bipesami na milúlú mpe nsámbo ya bakristu o mísa ya bonzámbe», Likambo-likonzi Sacrosantum Concilium ekolakisa bôngó, «na loléngé lyokó ya makási koleka, nzelá ya kolanda»: «Kosimba malámu momeseno ya kolóngóno mpe komifungwama na bomátisi bokó ya sémbo», elobaki Papá.

Benoît XVI: momeseno mpe bomátisi biboyanaka te

Léon XIV akobaki litéya na ye na bolimboli 'te oyo ye alandi Benoît XVI amonaki na «nsakola ená ya makanisi» «linaka ya mbongwana» ya batatá ya Concile, «na bokokani ya momeseno enéne ya milúlú mpe nsámbo ya bakristu o mísa ya kála mpe ya lobí ». Papá moí-Allemagne ayókaka mawa 'te kotutanisa mingimingi «na ndéngé elongobami te momeseno mpe bomátisi», nzokándé, engebene na ye, babosóló mibalé bizali ya kokangema makási. «Momeseno ekoyingisa ndéngé mosusu bomátisi», elimbolaki ye, na bokokanisi lisapo ya milúlú mpe nsámbo ya bakristu o mísa na «ebale yókó» eye ekobomba liziba na ye na bokéi epái ekosuka na mpimo (embouchure) na ye. Emoniseli ená ekosálisa ya kososola molimo ya bambongwana ya milúlú mpe nsámbo ya bakristu o mísa bilingamaki na Vatican II: kobátela eye ya ntina ya boyambi na bokokisani baloléngé bisusu ya libandá bilongobamaki na eleko na bangó.

Mbongwana mókó ezua misisa na Momeseno

Concile ekokesenisa lokolá, na milúlú mpe nsámbo ya bakristu o mísa, eye etáli mosála ya bonzámbe - ekoki kobongwana te - mpe makambo bikoki kobalukama na eleko yókó. Engebene na Sacrosantum Concilium, bisáleli bisusu bikoki kobongwana ntángo bilongobami lisusu te «na ezaleli ya moto mpenza ya milúlú mpe nsámbo ya bakristu o mísa» to ntángo bisengeli lisusu te na mobáteli. Lisapo ya Eklezia ekolakisa kútu 'te bitamboli ya boye bizalaka kaka zambi ya kosálisa bozali bokó ya mozindo ya bandimi na mobombano ya pasika ya Kristu. «Misa ya Eklezia elata bôngó "nzóto" na ndéngé ya bonkoko ya eleko na eleko mpe ekokaki kopúsa yangó, atá kobongola yangó», elobaki Papá wa Roma. «Milúlú mpe nsámbo ya bakristu o mísa bizalaki, na bikeke, eloko ya bopalinginyi Nsango-Ndamu», ebakisaki ye. Leló, esengeli kozongisa sika «nguyá ená na bokobi ya momeseno katoliko ya sóló mpe ya bomoí», elingi koloba engebene na «etamboli yókó makási ya koyingisa bandimi na mobimba molámu ya bosóló».

«Botáli malámu ya milúlú»

Batatá ya Concile basengaka 'te «botáli malámu ya milúlú», ntángo ekoyanola na «litómba lyokó ya sóló mpe endimami mpo ya Eklezia», esálema kaka «sima ya koyéba 'te baloléngé ya sika bibima na baloléngé bizali kála na bomátisi bokó lokolá eloko», elobaki lisusu episkopo ya Roma. Concile ebeti nsete lokolá na lisengeli ya boyékoli bokó «ya matéya ma Nzámbe na mozindo, ya lisapo mpe ya mobáteli» yambo ya mbongwana nionso. Akébisi na makanisi ya moto ye mókó bikoki kobungisa bandimi to kolembisa lisangá ya Eklezia.

“"Litéya ya Concile ebengi lokolá ya koboya ya kobungisa bandimi, na koboyisa moto atá nani kobakisa, kolongola to kobongola likambo nini, na eye etáli milúlú mpe nsámbo ya bakristu o mísa, na likanisi ya ye mókó"”

Na loléngé ená, bomátisi elobamaka na Likambo-likonzi ya Concile «ekobébisa eloko te lisangá ya Eklezia: ekoluka ya kondimisa yangó to kosálisa yangó», elakisaki ye.

Mbela mókó ya bomikitisi mpe na lobokó

Mokitani ya Petelo asúkisaki bomanyoli na ye na lilendisi lyokó epesamaki na baye bansó bakobongisa bosepeli ya mibombano ya bonzámbe, mingi mpenza basángó baye bakosála ministeli ya bokónzi ya milúlú mpe nsámbo ya bakristu o misa. Babéngami ya kotosa kaka mikánda mpe mibéko ya milúlú mpe nsámbo ya bakristu o mísa, na ezaleli yókó ya «bobongami ntángo insó mpe botiyi motéma na Nzámbe», ezua elembo ya bomikitisi libosó ya mobombano ya bonzámbe mpe na lobokó lyokó ya sóló na lisangá ya Eklezia.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

27 sánzá ya mítáno 2026, 13:57