Likita lya banso ya Papa Léon XIV esika wapi Aram ya Yambo, Catholicos y'Arménie ya Cilicie, azalaki Likita lya banso ya Papa Léon XIV esika wapi Aram ya Yambo, Catholicos y'Arménie ya Cilicie, azalaki   (@VATICAN MEDIA)

Likita lya bansó: «Na litéya ya milúlú ma losámbo lya misa, Kristu akokoba kosála»

«Na litéya ya milúlú ma losámbo lya misa na mobombano ya Eklezia» ezalaki o ntéi ya litéya ya Papá mokolo eye ya misáto 20 ya sánzá ya mitáno, o eleko ya likita lya bansó na esika Sántu-Petelo. Na lilendisi na ye, Léon XIV abéngaki bandimi komitika «kosálema na káti na milúlú, bilembo mpe bikela», mpe mingimingi na «bozali ya bomoí ya Kristu na litéya ya milulu ma losambo lya misa». «Mosála ya bosikoli na bisó ekosálema na litéya ya milúlú ma losámbo lya misa eye ekosála bisó eboké yókó eponami,

JR Bompolonga – Kinshasa

Na 20 ya sánzá ya mitáno eye, Léon XIV abándaki molongó ya sika ya matéya na Mokánda ebimisamaka na Concile Vatican II: Likambo-likonzi na litéya esántu ya milúlú ma losámbo lya misa,  Sacrosantum Concilium. Na bokeli Likambo-likonzi eye, elimbolaki Mokitani ya Petelo, «Batatá ya Concile balingaka kaka kosála mbongwana mókó ya milúlú te, kasi lokolá komema Eklezia kotála mpe kokolisa nsinga ená ya bomoí eye ekokisa yangó mpe ekosangisa ye na mobombano ya Kristu».

«Litéya ya milúlú ma losámbo lya misa, ekosimba kútu na motéma ya mobombano yangó: ezali mbala mókó esika, ngonga mpe eleko esika wápi Eklezia ekozua na Kristu bomoí na ye», elobaki Léon XIV, na bolobi lisusu 'te «mosála ya bosikoli na bisó ekosálema na litéya ya milúlú ma losámbo lya misa, eye ekokómisa bisó eboké yókó eponama, bonganga-Nzámbe bokó ya bokónzi, ekóló yókó esántu, bato baye Nzámbe azua».

«Litéya ya milúlú ma losámbo lya misa na mobombano ya Eklezia»

Nsinga káti ya mobombano ya Eklezia mpe litéya ya milúlú ma losámbo lya misa etikali makási. «Kristu ye mókó azali mobéko ya káti ya mobombano ya Eklezia, bato basántu ya Nzámbe, babotama na ngambo eye etobokaki na kuruze». Na litéya esántu ya milúlú ma losámbo lya misa, na nguyá ya Elimo na ye, akokoba kosála, elobaki ye: «Ekosantisa mpe ekosangisa Eklezia, molongani na ye, na libonza na ye epái ya Tatá. Akosála bonganga-Nzámbe na ye se mókó, ye oyo azali waná na liloba esakolama, na Basakramento, na baministeli biye bikosála, na lingómbá esangani mpe, na likoló koleka, na Ukaristiya».

“"Sántu Augustin, na bosáli Misa, Eklezia «ekoyamba Nzóto ya Mokónzi mpe ekómi eye ye ayambi»: ekómi Nzóto ya Kristu, «ndáko ya Nzámbe na Elimo». Waná ezali «mosála ya bosikoli bisó», eye ekobongisa bisó na Kristu mpe ekotónga bisó na lisangá"”

Bandimi balendisami na litéya esántu ya milúlú ma losámbo lya misa

Na mosála ya mobombano ya Kristu, litéya ya milúlú ma losámbo lya misa ekosálisa bandimi na bozindisi bangó ntángo insó na Pasika ya Mokónzi mpe, bôngó, elobaki Papá, «na nzelá ya nsakola ya Liloba, bosáleli basakramento mpe losámbo ya lisangá, balendisami mpe bakómi ya sika lisusu na bomipesi na bangó ya boyambi mpe na etindá na bangó».

Papa Léon XIV akobénisa mwana moko
Papa Léon XIV akobénisa mwana moko   (@Vatican Media)

“«Bozali ya bandimi na ekela ya litéya ya milúlú ma losámbo lya misa ezali mbala mókó «ya káti» mpe «ya libandá». Yangó elingi koloba lokolá 'te ebéngami ya komipanzana na bosóló ya bomoí ya mokolo na mokolo, na etamboli yókó ya malámu mpe ya molimo, na loléngé 'te litéya ya milúlú ma losámbo lya misa esálemi ebaluka na bomoí mpe ekosenga bomoí bokó ya lobokó, ekoki kokómisa eye ebikamaki na masepeli: ezali bôngó ndé bomoí na bisó ekómi «libonza lyokó ya bomoí, esántu mpe malámu na Nzámbe», na bosáli «molúlú na bisó ya molimo»".”

Elembo ya bomókó ya bomoto mobimba na Kristu

Léon XIV alendisi komitika «kosálema na káti ya milúlú, bilembo, bikela mpe mingimingi na bozali ya bomoí ya Kristu na litéya ya milúlú ma losámbo lya misa». Sima koloba lisusu na mókó mókó ya bandimi 'te «litéya ya milúlú ma losámbo lya misa ekotónga mokolo na mokolo baye bazali o káti mpo ya kokómisa bangó tempelo yókó esántu ya Mokónzi». Ebikami na Elimo Sántu, «litéya ekokotisa bisó na bomoí ya Kristu, mpe esáli bisó Nzóto na ye mpe, na balomeko na ye nionso, ekolakisa elembo yókó ya bomókó ya bomoto mobimba na Kristu». Litéya ya milulu ma losámbo lya misa ekosála lisangá lyokó efúngwama mpe eyambaka bansó.

Mobombano ya bokristu, likambo ya Pasika, elingi koloba malozi, liwa, nsékwa mpe bopési nkembo na Kristu, «ezongeli bisó na ndéngé ya sakraménto bozali mpenza na litéya ya milúlú ma losámbo lya misa, na loléngé 'te mbala insó tozalaki na lisangá esangani na nkombo na ye (Mt 18, 20), tozindami na Mobombano ená», elobaki lisusu Papá wa Roma o eleko ya likita lya bansó eye Aram Ier, Catholicos y'Arménie ya Cilicie, azalaki.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

20 sánzá ya mítáno 2026, 15:05