2026.05.25 Mgr Pegoraro akoloba lisikulu na ye 2026.05.25 Mgr Pegoraro akoloba lisikulu na ye 

Mgr Pegoraro: IA ekoki kozua mokáno ye mókó te na eye ezali sémbo mpe bomoto

Mokambi y'Akademi ya Papá mpo ya bomoí afúngolaki sima ya nzanga ya 25 ya sánzá ya mitáno liyangani lyokó na Ndáko ya Latran na likambo-likonzi «Intelligence artificielle mpe lobí ya lokúmu ya bomoto», esálemaki na bosálisani ya Deloitte Central Mediterranean. Koloba bokambi, linyangó (capital), bolekisi ya bato, mosála mpe bokoki, elimbolaki ye, elingi koloba leló «komituna nani akokamba babotámboli biná, engebene na mibéko nini mpe nini ekokóma mpo ya baye ya botau».

Vatican News

«Intelligence artificielle ekoki kozala mosálisi mókó ya ntina, kasi ekoki kozua ye mókó te mokáno ya eye ezali sémbo, ya eye ezali ya bomoto, ya eye ebongi kobátelama. Mokúmbá ená ezalaka kaka ya bisó». Waná ezali eye elobaki Mgr Renzo Pegoraro, mokambi y'Akademi ya Papá mpo ya bomoí, na bobandisi sima ya nzanga ya mokolo ya yambo 25 ya sánzá ya mitáno liyangani «Intelligence artificielle mpe lobí ya lokúmu ya moto. Gbagba yókó na nzelá ya bolekisi ya bato mpe ya misála», eye esálemaki na eténi ya Ndáko ya Latran. Molúlú mókó esálemaki n'Akademi ya Papá mpo ya bomoí, na bosálisani ya Deloitte Central Mediterranean, na bokambemi ya Etéyelo ya likoló ya Papá ya Latran. Milúlú mibandaki na bozui maloba ya Mgr Pegoraro, ya Fabio Pompei, mokambi enéne ya Deloitte Central Mediterranean, mpe ya mokónzi ya FAO, Dongyu Qu.

IA, botomboli bokó ya kotia na mosála ya lokúmu ya moto

Na bobandisi na ye, Mgr Pegoraro alimbolaki 'te ezali na ntina 'te encyclique "Magnifica humanitas", mokánda enéne ya yambo ya Papá Léon XIV, «etomboli, o ebándeli ya mosála na ye, motuná mókó eye leló ezali na nsé ya misó ya banso: technologie ezali pámba sóki moke te ntángo ekotaka na bozindo ya mosála, bosálisi, boyókani na bato mpe mikáno ya lisangá». Encyclique, ebakisaki ye, ekoloba na bisó lisusu 'te likambo ya motúya «ezali kaka ya koyéba eye Intelligence artificielle ekoki kosála, kasi sóki botomboli na ye ekotikala ya sóló ebaluka epái ya lokúmu ya moto mpe bolámu ya bansó».

Komituná nani akokamba babotámboli na yangó 

Nakanisi, esémbolaki lisusu Mgr Pegoraro, «'te ezali waná lokolá liyoki ya bokútáni ya leló. Koloba bokambi, linyangó, bolekisi ya bato, mosála mpe bokoki, elingi koloba leló komituna nani akokamba babotámboli biná, engebene na mibéko nini mpe nini ekokóma mpo ya baye ya botau». Akademi ya Papá mpo ya bomoí, na mongongo ya mokambi na ye, andimi na motéma mókó mokúmbá ená: «koloba lisusu 'te bokeli ezali ya sóló ya moto kaka ntángo ekokitisa moto na mosála te, na likambo lyokó to na lotómo yókó, kasi ekobátela lokúmu na ye, bonsómi na ye mpe mbela na ye ya boyókani». Na loléngé ená, mbela ya Roma mpo ya bolámu ya IA, epésamaka n'Akademi na 2020, «ezui leló bososoli bokó ya makási koleka. Intelligence artificielle ekoki kozala mosálisi mókó ya ntina, kasi ekoki kozua ye mókó te mokáno ya eye ezali sémbo, ya eye ezali ya bomoto, ya eye ebongi kobátelama. Mokúmbá ená ezalaka kaka ya bisó».

 

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

26 sánzá ya mítáno 2026, 13:07