2018.09.21 Bakristu bakatokio kati na losambo, o boso bwa Bazilica Notre-Dame ya Sheshan na Shanghai na Chine 2018.09.21 Bakristu bakatokio kati na losambo, o boso bwa Bazilica Notre-Dame ya Sheshan na Shanghai na Chine 

Pàpa asengi tósambela na ntina ya bakatoliki ya mboka Chine

Sima ya losambo la Regina Cæli, Leon XIV abelelaki Ngondo Maria mpe atikaki o maboko ma ye, bayambi ya Chine, mpo ‘te na bolobeli bwa yé, bàzala banzeneneke «ya elikya mpe boboto to kimya». Mibù na mibù, o mokolo mwa 24 ya sànzà ya Màyi, Eklezya ya molóngó mobimba ebyangemi na kosambela mpoo na bakristu ya Chine. Pàpa asambelaki mpe mpo ya bato tuku mwambe (80) bakufaki o mokolo mwa mitano na mpokwa, na bisika batimolaka mabangà ma ntalo, na Nordi ya chine, na etuka ya Shanxi.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Na lomingo loye, na ngonga ya Nzanga, Pàpa abeleli, ut’o lininisa lya Palais apostoliki, mokolo mwa losambo mp ona eklezya ya Chine. Mokolo mye mozali bobele kokumisama to kokundolama mbula na mbula, kobanda mobù 2007. Esalemaka na libakù lya milùlù mya eyenga ya Mwaesengo Ngondo Maria «Lisungi to lisalisi lya bakristu». Mingi mingi, bazali kosambela yango na esika mosantu ya Notre-Dame de Sheshan, pene na Shanghai na Chine. Ezali nde epai na ye, Nganga-Mokonzi monene abonzelaki lingomba ya bakristu ya Chine mpo ‘te ekoka kokóba na nguya nyonso, na kozala banzeneneke bwa Nsango Elamu.

Mama wa biso ya Sheshan.
Mama wa biso ya Sheshan.

Pàpa asengaki na bato bamobembo 30 000 mpe Ba-Roma, oyo basanganaki na esika Saint-Pierre, nà mpe na bayambi ba mokili mobimba, mpo ‘te ; basangana na bango elongo na losambo la lingomba lya bakatoliki ya Chine, lokola «elembo mpe bondeko bwa biso mpo na bango mpe ya bondeko na bango na Eklezia ya mokili mobimba mpe na molandi to mokitani mwa Petro». Tika ‘te «bolobeli bwa Mokonzi mwasi ya likoló, asengelela lisanga lya bakristu ya Chine ngolu ya bomoko mpe, apesa bango banso makasi ya kozala banzeneneke to kotatola Nsango Elamu na misala mya mokolo na mokolo, mpo bazala nkóna ya elikya mpe ya kimia», ebakisi Léon XIV. 

Likàmà na esika batimolaka mabangà ma ntalo

Na mokolo moye mwa lomingo, 24 ya sànzà ya Màyi, Pàpa akanisaki Liushenyu, na etúká ya Shanxi, na sudi-westi ya Beijing, epai bato bazali kolela mpo na likàmà eye batimolaka mabanga ma ntalo, to mine. Ya mbala eye, likàmà linà eleki mabe, ya oyo esalemakà na ekólo yango kobanda 2009. Bana bilenge soki tuku mwambe na mibale (82) bakufi na mobulu ya mabanga ya ntalo. Papa abondelaki mpo ‘te milimo mya bango “mopema mpo ya seko na esengo” mpo na bato banso bazwamaki na likàmà. Ebele ya bato baye bazali na mosala ya kosunga to kobikisa bato bazwami na likàmà, bayàki o mokolo mwa lomingo mpo na koluka bato baye babungaki



Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

24 sánzá ya mítáno 2026, 10:49