Pápa asepeli na litatoli ya elikya ya Kardinal Tscherrig, oyo akufi

Episkopo wa lokùmu ya Suisse, oyo asalaki bambula mingi na makambo ya politiki mpe azalaki ntomà ya Pàpa ya kala na Italie mpe na esanga ya Saint Marin, akufaki o mokolo mwa 12 ya sànzà ya Mayi. Léon XIV akambaki misa ya lilàkà na Basilique Saint-Pierre; bongo na lisukulu la yé, alobelaki etindà kardinale oyo akokisaki na bamboka ndenge na ndenge, “na motema molai mpe na komipimela mpo na kosangisa bato kati na boyokani”. Abundaki na mikakatano mpe alongaki mpo na bolamu ya bato banso”.

Bansango ya Vatikan

Azali episkopo wa lokùmù, ndeko, diplomate, mokengeli mpate, oyo, na nzela ya “mosala mbala mingi ya mayele, kasi ya molende mpe ya makasi”, asaleli Eklezia ya mokili mobimba. Pape Léon XIV asalaki misa ya lilàkà ya episkopo wa lokùmù ya Suisse, Paul Emil Tscherrig, oyo akufaki nà bambula 79 na mokolo mwa 12 ya sànzà ya màyi, na Baziliki ya Saint-Pierre na Roma. “molingami Episkopo wa lokùmù” oyo, kati na misala mya ye ndenge na ndenge, azalaki ntomà ya Pàpa na Italie mpe na Saint-Marin ut’o 2017 kino 2024. Azalaki moto ya liboso oyo azalaki te ya ekolo ya Italie, kasi azwaki ebonga enà. Nzokande, na 2023, Papa François akómisaki ye kardinale na likita lya 30 Setembe, na likita yango nde Robert Francis Prevost azwaki pourpre ya motane. Mpe sima na yango, yé oyo akomi lelomei Pàpa Léon XIV.  Ye mpe ayei kotambwisa elongo “ndeko” wana na “bokutani bonene mpe ya lokumu” elongo na "mokonzi oyo basalelaki na motema moko, elongo na “Moninga” oyo atambolaki na ye na bosembo nyonso na bomoi bwa ye mobimba. O kati ya bambula eye nyonso, koleka katikati na yango, apesaki na mosala ya ngwende ya bontmà, na ba représentations pontificales mpe na kati ya Secrétariat ya Etukà.

Lilàkà lya Episkopo wa lokùmù Tscherrig.
Lilàkà lya Episkopo wa lokùmù Tscherrig.   (@Vatican Media)

Motema molayi mpe elimo ya komipimela

Mokumba mwa ye lokola diplomate”, mpe liboso la nyonso lokola mokengeli mpate ya Eklezia; elobaki Pàpa na mateya ma ye. “Amonaki ndeko na biso kosala mibu ebele, na motema molai mpe na bomipesi, mpo na kosangisa na boyokani bato baye, bilako ya botosi epesaki na maboko ma ye. Na nzela na ye, akutanaki na mikakatano mpe alongaki myango, lokola ntomà nyonso ya Pàpa asengeli kokutana na yango mp ona bolamu y abato bando”.

Esperiansi monene na makambo ma Eklezya mpe ya mokili mobimba

Na nsima, Pape Léon XIV akanisaki lisusu na mosala ya Mgr Tscherrig na Burundi, na Trinité-et-Tobago mpe na mikili miyiké ya Caraïbes, na Corée ya Sudi, na Mongolie, na Suède, na Danemark, na Finlande, na Islande, na Norvège, na Argentine, tee ntango akómaki na Italie mpe na Saint-Marin. “Ayebaki mingi na makambo ma Eklezia mpe ya mokili mobimba, oyo ezali komonisa ‘te azalaki na makoki ya komibongisa mpe ya komesana na makambo ndenge na ndenge, na kolendisa bolingo bwa ye lokola Mokengeli mpate, na bisika ndenge na ndenge”.

Lilakà lya Kardinal Tscherrig, na Vatikan
Lilakà lya Kardinal Tscherrig, na Vatikan   (@Vatican Media)

Mosali mosàlà malamu

Sik'oyo, Cardinal Paul Emil “akokutana na Mokonzi wa yé” mpe “tokokende kotika ye na nzela oyo ya kokamwa”; Nganga-Mokonzi alobaki bongo, na elikya ‘te, ntango wana, “ezala libakù monene ya bomanyoli mpe ya bolendisi, mpo bàsepela na mosala molamu moye àsalaki na kondima mpe na motema moko, na nzela ya boboto bonene bwa Nzambe”. Na lolenge lonà, Léon XIV atángaki na lisukulu na ye, maloba Pàpa François ayebisaka Episkopo wa lokùmù Tscherrig na Buenos Aires; alendisaki ba diplomates ‘te: “bábota elikya o zingazinga ya bango, na bosénga mpe maye bato ba bikóló bazali koluka mpe kozela mingi”. “Oyo ezali libyangi” elobaki ye, “oyo biso mpe tokoki kotelemela lelomei, mpo na kosalela yango na bisika binso tobengami mpo na kosalela mpe kolinga bandeko ba biso. Mokili mwa biso mwa lelo, mozali na mposa makasi ya bamemi-nsango to bantómà oyo bazali kosalisa bango na  kozwa lisusu elikya, mpe litatoli malamu ya baoyo Nzambe aponi lokola baministre na ye ekoki kosunga biso na koyanola na libyangi linà.”.

Lilàkà lya Episkopo wa lokùmù Tscherrig.
Lilàkà lya Episkopo wa lokùmù Tscherrig.   (@Vatican Media)

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

15 sánzá ya mítáno 2026, 23:26