Na sànzà ya Yuli, Pàpa asengi tósambela mpo na limemya lya bomoyi bwa bomoto

Na mokili moye momeséni na «ezalela ya kobwaka biloko», lolenge François alobaki, Léon XIV apesi mokano mwa ye ya losambo ya sànzà eye mpo na limemya ya bomoi bwa bomoto na biteni binso ya bozali bwa ye. Na nzela ya campanye «Bondela elongo na Pàpa», azali kolendisa biso na kosenga bolimbisi na Mokonzi tango tozali kokweya na «kozanga bosepeli na moningà, tango totikaka komona kati na moto mosusu ‘te azali na lotomo ya kolingama to abongi na bolingo».

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Na sànzà eye ya Yuli, bayambi mpe bato banso ba motema bolamu, babyangemi na kosangana na makanisi ma losàmbo la Pàpa, na nzela ya Campanye ya «Sambelà elongó nà Pàpa», rezo ya losàmbo na mokili mobimba mpo na Pàpa. Leon ya XIV alendisi na kosàmbela mpo na komemya bomoi ya bomoto mpamba te esengeli kotosa bomoi nyonso ya moto, mpe kobatela yango ut’o libumu ya mama to kobanda na tango azali zemi ta mama kino na nsuka ya bomoi bwa ye ; ezala bomoi ya lolenge kani.

Likambo mosantu ya kobatela

Na video na ye ya sànza na sanza ya losambo, Nganga-Mokonzi Monene alobi ‘te moto nyonso azali «likabo mosantu oyo ezali komonisa elongi na yo». Léon XIV asengi na Mokonzi, ngolu ya «koyeba to kokundola mpe kobatela motuya se moko mpe eloko ekoki te kozwa esika ya bomoi ya moto na moto», mpe ya koyekola «koyamba bomoi na bosenga bwango nyonso, kosunga na boboto nyonso baoyo bazali na mpasi, kotambola elongo na limemya nyonso, etapi na etapi ya bomoi, mpe na kobatela nà mpiko nyonso, baye banso bazangi maloba».

Eklezya, ndako ya bizibelo polele

Asengi bolimbisi na Nzambe mpo na ezalela ya “kozanga kobanza baningà mpe ya kobwaka biloko”, mpe na batango oyo, “tango totikaka komona kati na moto mosusu ‘te azali na lotomo ya kolingama to abongi na bolingo”. Mpo na mokambi ya rezo ya losàmbo ya Pàpa na mokili mobimba (Réseau Mondial de prière pour le Pape(, Sàngó Cristóbal Fones, “Kopesana limemya mpe kobatela likabo lya bomoi ya bomoto ezali mokumba ebandaka na kobongola motema mpe kofungola biso na komipesa mpo na basusu”.

Na kosukisa losambo la yé, Pàpa abondelaki mpo ‘te Eklezia ezala “ndako oyo bizibelo bya yango ezali ya kofungwama to ezali polele, esika wapi bomoi nyonso esengeli kosepelama, esika moto moko te azali komiyoka lokola azali na mokumba monene” mpe “esika lokumu to lotomo la moto na moto ezali tango inso komemyama mpe kobatelama”, ebetaki yé nsete. Asambelaki boye: [ “Mokonzi Yezu, salisa biso tolinga bomoi lokola yo olingi yango: nà boboto, nà lobokó mpe na bomipesi lokola likabo mobimba. Tika ‘te toyeba kosakola, na maloba mpe na misala mya biso; ‘te bomoi nyoso ya bomoto ebongi na likabo mobimba ya biso moko”. ]

Kosopa zemi, etanazi mpe etumbu ya liwà

Mbula n ambula na mokili mobimba, OMS ezali kopesa lapolo ya basi bazali kosopa bazemi, bazali na motuyà ya pene ya 73 miliyon. Mpe masolo ezali kosalema mp ona likambo lya komipesa liwà to etanazi, mpe lisalisi lya baminganga mp ona kokufa, ekomi likambo ya bikolo mingi na moyi mwa lelo. Likambo lya kosenga liwà, ekomi bobele na motuyà ya 2707, na bikóló zomi na sambp (17). Ezali motango moye moleki likóló, ut’o mobù 1981. Emati na motuyà ya 78% na bokeseni ya mibù mileki.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

02 sánzá ya nsambo 2026, 21:33