Bitúmbu ya pete miye mikopekisa bobomi te
Andréa Tornielli*
Commissio ya Poto elakisaki mokolo ya misáto 17 ya sánzá ya libwá mwa mikáno ya boluki kosilisa pási eye ekoleka sik’oyo na Gaza. Mokolo na mokolo, bilili ya kozokisa mikokomela bisó ya bato bazali na bokimi na makási na nsé ya ba bombe, bilili ya bána babomi. Tokokoba koyóka ba mbela ebelé ya Papá Léon XIV oyo, simá ya likita lya bansó, azongelaki mbela na ye po ya botosi mobimba ya bosémbo na mokili, na bolobi bomoko na ye na bato ya Palestine baye “bakokoba kobika na bobangi pe na loléngé ya mabé, na makási bakotika -mbala esusu- mabelé na bangó”. Libosó ya nionso waná, mabongisi ya Poto -miye misengeli mindimama- mikobima ya pete.
Na súka ya likita lya bansó ya mokolo ya misáto 17 ya sánzá ya libwá na esika ya Sántu-Petelo, Papá alobaki mozindo ya bomoko na ye na bato ya Palestine na Gaza, baye bakokoba kobika na….
Mwa mikáno bikoki kokómisa bomoi ya bato pási, kasi misusu, lokóla ya bopekisi mombóngo ya mindóki miye mikozua elembo mbala mókó na etumba, mikobébisa. Mindóki mina mikosála leló mobúlú na bikóló ya nzinganzinga. Etuluku ya mabongisi ya Poto ezali na mokáno mókó te na eye etáli bopesi mindóki pe biloko ya basoda. Maloba ya Papá mibimaki mokolo ya 26 ya sánzá ya motóba elekaki mizali na mawá na ntina kaka: “Boni okoki kokoba koteka bapósá ya kimia ya bato na bilobaloba ya bozui ya mindóki, na likambo ezanga ntina ‘te bozali likoló ekosilisa makambo na esika ya kokolisa kanda pe bozongisi mabé? Bato bazali koyéba motángo ya mosolo eye ekokende na mabenga ya batekisi ya liwá pe ekoki kosálisa ya kotónga ba lopitalo pe bitéyelo; na esika waná, bakobébisa miye misili mitóngama!”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo