Sango Browne avandi pembeni ya Charles III pe mwasi na ye Camilla Sango Browne avandi pembeni ya Charles III pe mwasi na ye Camilla  (@Vatican Media)

Botáli ya mokónzi "elakisi penepene káti ya ba Eklezia katoliko pe anglican"

Sángó Martin Browne, elama ya dicastère po ya Bomátisi bomoko ya bakristu, azali na mokúmba ya boyokani na ba anglican. Azongeli mwá makambo ya ntina ya mokolo eye káti na Papá Léon XIV pe mokónzi Charles III, elekaki mingi na bokútáni pe na nsámbo esika mókó.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Eleko mókó ya lisapo na boyokani káti ya ba katoliko pe anglican. Mokolo ya minei 23 ya sánzá ya zómi, Papá Léon XIV azalaki na milulu ndéngé na ndéngé na mokónzi Charles III pe mwási na ye Camilla, mingi mpenza losámbo esika mókó na chapelle Sixtine. Mokolo ezalaki lokóla bokútáni káti na bakambi mibále na palais apostolique pe mosála mókó ya esika mókó na basilique Saint-Paul-hors-les-Murs, epái wápi mokónzi Charles III azuaki nkómbó ya moningá mokónzi ya Sántu-Polo.

Sángó Martin Browne, moine bénédictin ya Irlande pe elama ya dicastère ya Bomátisi bomoko ya bakristu, azongeli mwá makambo ya ntina ya mokolo yangó, mingi mpenza loléngé ya losámbo ya esika mókó pe likambo-likonzi ya bosangisi po ya bobateli bokeli.

Molongó mókó ya milulu ya ntina pe ya lisoló

"Mókó ya loléngé ya makambo ya malongá ezali 'te mokónzi mókó te ya Angleterre asámbela esika mókó na papá kobánda libosó ya Réforme, libosó koleka ya bokabwani ya Eklezia y'Angleterre pe ya Eklezia ya Roma", elobaki sángó Browne. Atáko bakónzi ebelé y'Angleterre basálaka mobémbo na Vatican, mbala ya súka basámbelaka na papá mókó esálema eleki mibú 500. Molúlú ena elakisi bôngó "eténi mókó ya sika na bobongisi boyokani" káti na ba Eklezia mibále, ekobaki sángó Browne.

Molúlú ya simá ya midi na basilique Saint-Paul-hors-les-Murs elakisi lokóla bofúngoli ya "ndéngé mókó ya sika ya boyokani káti na basilique pe bokónzi y'Angleterre". Mokónzi áwa akomi elama ya Bondeko ya mokónzi, "ayambamaki na basilique pe avandaki na kiti mókó esálemaki po ya botáli eye", eye ekumbi ba armoiries na ye pe molongó na latin ya Nsango Elamu ya Yoane, Ut unum sint (Bazala mókó). "Na momeseno, libosó ya Réforme, bakónzi y'Angleterre bayébanaki lokóla babateli ya Saint-Paul-hors-les-Murs.

Esika mókó ya boyokani ekomonana káti ya ba Eklezia

Elama ya dicastère ya Bomátisi bomoko ya bakristu alobi 'te, lokóla mokónzi Charles III azali na nkómbó "mokambi ntá bonéne ya Eklezia y'Angleterre", alingaki kopesa mobémbo na ye "lomeko mókó ya molimo", atáko ezalaki botáli mókó ya Letá na Ngwendé ya Sántu-Petelo.

Lisusu, Papá François, oyo losámbo ya esika mókó ebongisamaka na sánzá ya minei kasi ezongisamaka likoló ya bokono na ye, na simá Papá Léon XIV, bangó mibále basepelaki na likambo yangó. "Nakanisi 'te biténi mibále bandimi 'te atáko bokabwani ezali na ba Eklezia na bangó - bokabwani na makambo ya ntina makási na mituná bebo maye basololaka yangó na masoló mitáli nzebi ya mambi lya misa-, ezali na esika mókó monéne ya boyokani, boyambi mókó, momeseno ya molimo mókó", elimboli sángó Browne.

Sántu John Henry Newman: nzeneneke mókó ya boyambi po ya ba Eklezia mibále

Sángó Browne akundoli 'te sántu John Henry Newman azalaki na lokúmu mingi na losámbo ya tóngo na chapelle Sixtine pe na misa ya simá ya midi na basilique Saint-Paul-hors-les-Murs. Loyémbo (hymne) eye efúngolaki misa ekomamaka na sántu Ambroise ya Milan, kasi eténi na yangó na lokota y’anglais eyembamaki ebalolamaka na sántu John Henry Newman. Na misa ya mibále, loyémbo "Praise to the Holiest in the Height" (Nkembo na Nkolo, lokúmu na Nzámbe) ezuamaki na likomi ya ngongi Ndótó ya Gérontius.

"Sántu John Henry Newman alekisaki ndámbo ya bomoi na ye lokóla elama, na simá sángó, ya Eklezia y'Angleterre, pe ndámbo mosusu lokóla elama, pe episkopo ya lokúmu, ya Eklezia katoliko", elobi sángó Browne. Azali "elongi mókó ya ntina na lisapo ya bomoko ya boyambi pe ya botatoli ya mimeseno mibále".

Losámbo esika mókó ya ndáko na bisó ya lisangá

"Mobémbo eye ebongisamaka libosó tángo Papá François azalaki na bomoi, po ya kopesa lokúmu na bomipesi elongo ya Papá François pe mokónzi Charles po ya nzinganzinga, o eleko ya bokundoli mibú zómi ya bobimi ya Laudato si'», elimboli sángó Browne,

Po ya sángó Browne, tokoki na bobángi te koloba "losámbo esika mókó ya ndáko na bisó ya lisangá", po mibú miye mileki, "liyóki 'te bobateli ya nzinganzinga ezali eloko eye tokoki bansó kotatola elongo na ngonga eye ekomi lisusu makási".

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló eye

24 sánzá ya zómi 2025, 11:31