Episkopo ya lokumu Pietro Parolin liboso ya Pontificia Università Urbaniana Episkopo ya lokumu Pietro Parolin liboso ya Pontificia Università Urbaniana  ((foto © Teresa Tseng Kuang Yi))

Episkopo ya lokúmu Parolin abimisi esengo na ye simá ya boyokani etáli Gaza

O eleko ya liyangani na Université urbanienne ya Papá, Secrétaire ya Letá alobaki na malámu boyokani etiamaki mokoloto na Ezypito po ya Proche-Orient. Asemboli 'te lisoló na ye na bapanzi nsango ya Vatican, eye esepelisaki ntómá ya Israël te, ezalaki "mbela mókó po ya boboto", pe alaki 'te boyokani na Chine ekokoba, atá "mikakatano" ya kobunda na "motéma mpio pe na botiyi motéma".

Jean René Bompolonga – Kinshasa

Secrétaire ya Letá ya Ngwende ya Sántu-Petelo, abimisi "esengo na ye mobimba" po ya boyokani káti ya Hamas pe Israël, etiamaki mokoloto mokolo ya mitáno 10 ya sánzá ya zómi na Ezypito, na lisálisi y'Amerika. Episkopo ya lokúmu Pietro Parolin alobaki úto Université urbanienne, esika wápi azalaki na bolakisi misála ya colloque ya bikóló na likambo-likonzi "Mibú nkáma simá ya Concilium Sinense: káti lisapo pe lelò". Kasi libosó ya kokóta na ndáko ya makita etondaki na bayékoli pe balakisi, ayanolaki na mituná ya bapanzi nsango na makambo mikoleka sik’oyo na mokili. Ya yambo, boyokani ya kozima-móto na Gaza: "litámbe mókó na libosó", po ya "bosilisi etumba", elobi Secrétaire ya Letá. "Bisó lokóla, esakoli ye, tomikangisi na esengo ena pe tokobimisa pósá 'te ezala ya sóló litámbe ya yambo na boboto mókó ya seko pe ya libélá".

Nsakola ya ntómá ya Israël na lisoló azuaki na ba média ya Vatican

Episkopo ya lokúmu azuaki motuná lokóla ya nsakola ebimaki póso elekaki na ntómá ya Israël epái ya Ngwende ya Sántu-Petelo, na eye etáli lisoló azuaki na ba média ya Vatican, o eleko ya mibú mibále ya mobúlú ya 7 ya sánzá ya zómi. Papá alobaki na likambo yangó, libosó ya ndáko ya Castel Gandolfo, mokolo ya mibále simá ya midi. "Episkopo ya lokúmu alobaki malámu likanisi ya Ngwende ya Sántu-Petelo na likambo yangó", elobaki Léon XIV.

Leló, episkopo ya lokúmu Secrétaire ya Letá abakisi 'te lisoló ebimaki na Vatican News pe na Osservatore Romano, "ezalaki mbela mókó po ya boboto". "Nakanisi te 'te ezali na bokokani ya litéya káti na likambo eye pe mosusu. Epái wápi mobúlú ezali, esengeli kaka kopálela", elobi ye. Ba nsakola na ye mizalaki kobimisa "pósá ya boboto", "ya kosilisa mobúlú, pe kobánda nzelá mókó pe likambo mókó ya bozongisi bondeko pe ya boboto". Pe pósá ena elingi ekokisama na boyokani ya mokolo ya mitáno. Ezali sik’oyo ya kotambuisa yangó.

"Nakanisi 'te ezali eténi ya pási koleka, elobaki episkopo ya lokúmu, po ezali ya sóló na bisiká ebelé -lokóla balobaka, zábolo azali na makambo ya mike- miye misengeli mitambwisama pe na miye biténi mibále bayókani nanu te". Eye esengeli, ezali "bolingi elamu", elobi episkopo ya lokúmu Parolin, na bosepeli ndéngé mbano ena ezuami: "Tokolikya kokoba na nzelá waná"

Bokobi lisoló na Chine

Na lisoló ya mokúsé na Secrétaire ya Letá na bapanzi nsango, abosanaki te kotánga Chine, na mwinda ya likambo-likonzi ya liyangani na Université urbanienne ya Papá pe mingi na boyokani ya boponi ba episkopo etiamaki mokoloto na 2017 pe babongisi yangó mbala mibále. "Na boyokani ya bomeki ekokoba kokende libosó, tozali komona yangó kaka lokóla likambo mókó ya malámu, na ndéngé esálisa Ngwende ya Sántu-Petelo na Chine ya kozua mwa moke boyokani na eye etáli boponi ya ba episkopo", elimboli episkopo ya lokúmu.

Ya sóló, "mikakatano mizangaka te", kasi esengeli kobunda na yangó "motéma mpio pe na botiyi motéma". Sik’oyo, "ezali nanu na bituluku bizali ya kobombana, kasi boyokani elukaki penza ya koleka likambo yangó ya bokabwani pe ya komema bobongisi na Eklezia".

Úto ebándeli ya mosála ya Papá Léon XIV, elobi episkopo ya lokúmu, "matámbe" misusu milekisami: "Nakomona 'te Papá Léon akokoba na nzelá ena", elaki ye. Elingi koloba, nzelá eye ya kotatola 'te ekoki "kozala bakatoliko ya malámu pe bato ya Chine ya malámu", lokóla Papá François azalaki kozongela yangó mbala mingi. "Waná ebongi po ya bikóló minsó", elobi episkopo ya lokúmu Parolin. "Kozala bakatoliko ya malámu ekobébisa sóki moke te lobokó na ekóló na yo pe bosáli elongó po ya botongi pe po ya bolámu ya bato bansó".

Prix Nobel ya boboto (paix) na Corina Machado, nzelá mókó ya kozua démocratie

Ekokaki kosálema te ya kotuná na oyo ayébi malámu Venezuela, azalaka ntómá kobánda 2009 kinó 2013, ya koloba boponi ya Maria Corina Machado ya Venezuela po ya mbano mokolo ya 10 ya sánzá ya zómi prix Nobel ya boboto. "Nakolkya 'te mokáno ena ezuami po ya Maria Corina ekoki penza kosálisa ekóló", elobi Secrétaire ya Letá. "Ekoki kosálisa ekóló ya kozua lisusu kimia, ya kozua lisusu nzelá ya démocratie pe ya bosáli elongó káti na ba parti politiki nionso", esúkisaki ye.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló eye

13 sánzá ya zómi 2025, 11:47