Episkopo ya lokumu Kurt Koch mokambi ya dicastère ya Bomoko ya bakristu Episkopo ya lokumu Kurt Koch mokambi ya dicastère ya Bomoko ya bakristu 

Episkopo ya lokúmu Koch: mobémbo na Turquie, libakú lyoko ya kokolisa boyambi na bonzámbe ya Kristu

O eleko lisangá ya bakristu ya Turquie ekozela Papá Léon XIV po ya kokundola concile ya Nicée na motómóló œcuménique ya Constantinople, episkopo ya lokúmu Kurt Koch, mokambi ya dicastère po ya Bomoko ya bakristu, alobi kolikya 'te bokundoli bona ya lisangá ekotatola bomoko ya bakristu.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Concile ya yambo ya Nicée esalemaka eleki mibú 1 700. Po na nini ekolobamela lisusu leló?

Nakanisi 'te ezali na ntina ibále p ona yangó. Ya yambo, concile esálema na 325, na eleko yoko bokristu ezokaka nanu te na ba bokabwani pe botikani. Yangó waná concile etáli bakristu bansó pe ekoki esepelama na lisangá œcuménique. Ya mibále, concile elimbola pe etelemisa boyambi ya bokristu na Yézu-Kristu lokóla Mwána ya Nzámbe, eye ekabolami na bakristu bansó. Kokanisa yangó lisusu pe kokolisa elongo boyambi na bisó na bolingi œcuménique ezali litómba linéne ya likambo ena.

Bonzámbe ya Kristu ekolobama na œcuménisme

Na eleko ena, bonzámbe ya Kristu ezalaka likambo ya makanisi kilikili. Leló, mituná nini ya minéne mikotunáma na œcuménisme?

Motuná ena ya sóló ekolobama, po nandimi 'te, atá diplomatie na bisó nionso, tokokoka kozua bomoko kaka na boyambi. Tokozua bomoko na boyambi ena ya bantóma eye eleka pe epesama na elama lyoko ya sika ya nzóto ya Kristu tángo ya batísimo.

Pe, ya sóló, concile ya Nicée ezali likambo lyoko ya ntina esika nini boyambi evandisami. Pe ekoki kokolisama lisusu, po boyambi na bonzámbe ya Kristu ezali kaka bosóló boko te, kasi ekotungisa lisusu leló. Namoni ezali na ntina kokolisa yangó lisusu.

Ba mbélá bebo bitindami po ya likambo linéne lina, epái ya katoliko lokóla epái ya orthodoxe. Likambo tokoluka ezalaki ya kosálisa bozali boko enéne. Okoki koyébisa bisó nani tokoki kolikya komona pe oyo tángo mosusu akoki kolaka te boyei na ye?

Toyébi nanu te na ndéngé ekoki nani akoya pe nani akoya te... Nalingi koloba eloko te po na waná, po ya kopanza nsango ya lokutá te. Tokoluka kozua motángo ebelé ya bakristu bakozala waná. Ezalaki lokóla pósá ya Papá Léon XIV, pe nalingi naloba yangó. Tokoki koloba na simá nani azalaki pe nani akokaki koya te.

In Illo uno unum

Liloba nini okolinga omona kobima na bosepeli ena ya Concile?

Litatoli lyoko 'te tozali mókó o ntei ya boyambi ya bokristu. Yangó ekokani lokóla na liloba-lotómo ya Papá Léon XIV, In Illo uno unum. Yangó elingi koloba 'te tozali ebelé, tozali loléngé na loléngé, kasi tozali yoko na Yézu-Kristu. Liloba-lotómo ena, eye aponaki po ya Eklezia katoliko, ekosálema lokóla na œcuménisme.

Okoki yo mókó komikumisa na litómba ya mosála molayi na Vatican pe na likambo ya œcuménisme. Okokanisa nini yo mókó ya bozali na yo na bosepeli ena ya ntina?

Ya yambo, nazali na esengo ya komona boni boni molulu ena, mibú 1 700 simá ya concile ya Nicée, ekopasola motéma ya bokristu mobimba. Mayangani ebelé, bokútáni ebelé misálemi...Nasepeli na yangó makási pe pe nazali na botóndi 'te bokristu ekanisa concile ena pe ezongisa ya sika boyambi ya bansó.

Mobémbo mókó ya "bolingo pe ya bomoko"

Simá ya Turquie, okokende lokóla na Liban. Mbuma nini okolikya komona kobótama na mobémbo ya bantóma eye ya yambo ya Papá?

Ya sóló, ezali lokóla mobémbo mókó ya bolingo pe ya bomoko na makambo ya pási bikóló bina bizali na yangó, na Turquie pe mingi na Liban. Ezali lilendisi lyoko po ya bakristu -na Turquie, bakristu bazali bato moke.

Na Liban, ezali na etónga ya bakristu loléngé na loléngé, na bozali makási ya ba maronite, baye bakobika na pási, na ndéngé ya politiki pe ya nkita. Kokembisa pe kolendisa bangó ezali likanisi po ya Sántu-Papá. Ya sóló, lisoló œcuménique pe ya káti ya biyamba, lisoló káti na bakristu pe ba musulman, eye ezali na ntina makási na Liban po mokónzi azali maronite pe ministre wa Yambo musulman.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

25 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 10:50