Episkopo ya lokúmu Parolin: COP30, libakú lyoko po ya kobándela lisangá ya bikóló ebelé
Jean-René Bompolonga - Kinshasa
Secrétaire ya Letá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo akomaki mokolo ya minei 6 ya sánzá ya zómi na yoko na mboka-mokónzi ya Letá ya Parà po ya kozala na bokútáni enéne esálemi libosó ya bofúngoli ya sóló ya COP30, mokolo ya yambo 10 ya sánzá ya zómi na yoko ekoya. Simá ya bozali na lisangá ya bakónzi, episkopo Pietro Parolin atálaki lopitalo lyoko ezali na kilometele zómi na yoko o ntei ya Belém, na lokóla etéyelo yoko eye esungaka bána ya babóla, mibongami mibále bisálisami na mosála ya Don Calabria. Na lisoló apesaki na Radio Vatican-Vatican News, Secrétaire ya Letá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo alobi ntina ya kopesa eyano yoko ya malongá koleka na makambo ya klima.
Papá emonani ‘te atungisami mingi na mambi ya mbongwana ya klima. Mambi mina bikoki kotungisa bomoi ya ba milio ya bato, mingi mpenza babóla. Nini ekoki kozala ya motúya koleka po ya ba Eklezia ya bikóló po ya koyanola na ba pósá mina engebene na makambo kilikili ya mokili?
Ya sóló, ezali likambo lyoko esimbi bato mingi, na ndéngé ya mabé, pe esimbi bato bazali na makoki te. Na ba sánzá bileki, tozuaki makita, ndakisa na bakambi ya bisanga ya Pacifique, baye balakisaki bisó likambo ya sóló ya mawa ya bolimwi na bango kála mingi te. Tokoki kokanisa nini waná elingi koloba po ya bato. Na makambo ngai natangi, motúya ya bato bakokima bisika na bango likoló ya mbongwana ya klima eleki leló eye ya baye bakimi bisika na bangó likoló ya bitumba ya sik’oyo na mokili. Ezali likambo lyoko ya sóló ya lombango.
Namoni 'te Eklezia emipesi epái ya Ngwendé ya Sántu-Petelo. Tokundolaki likabo epesamaki na Papá François na encyclique Laudato si', pe na lilendisi ya papá Laudate Deum. Ba Eklezia ya bikóló bamitiaki o molongó na bomipesi ena. O eleko ya COP30, Eklezia ya Brésil emipesi makási po ya komeka kolekisa bomipesi yangó o ntei ya masangá loléngé na loléngé pe na bato.
Ezalaki lokóla bosálisi yoko o eleko ya makita ya mayangani ya mikili kilikili, bôngó botámboli ezali. Likambo ya motúya koleka ezali ya koloba lomeko ya eye ya malongá ya likambo yangó. Ya sóló, tozali na makoki te, bikoki po ya kopesa biyano ya tekiniki, atá sóki bato ba bwanya ya Secrétairerie ya Letá pe ya ba dicastère misusu bakolandela makambo yangó. Bazali bapaya te na mituná mina pe bazali lokóla na lisoló ekosálema. Kasi nandimi 'te likabo ya ntina ya Ngwendé ya Sántu-Petelo pe ya ba Eklezia ya bikóló ezali ya komátisa loléngé ya boyébi pe ya kopesa likabo ya malongá na likambo ya mbongwana ya klima. Waná ekosenga mosála moko ya makási ya boyékoli pe ya bolakisi.
Okutani na bakambi ya mokili mingi. Eloko nini olingi sasaipi ya kotia na bisaka na yo, na bozongi na yo na COP30, lokóla mokáno ya sóló ya ba bulamatari?
Na tóngo ya leló [mokolo ya minei 6 ya sánzá ya zómi na yoko] moto moko azali na COP atutaki ngai na bolobi 'te atá na COP, ebongi te kozela to esengeli te kozela ba nsakola ya minene, kasi na bomipesi pe na molende ya bakónzi ya mokili baye bazalaki, baye bazali pe na baye batindi na bofúngoli likita po ya kosálela mikáno miye mizuama kála: na eye etáli bokitisi ya bobimisi carbone, lisálisi na bikóló bizangi makoki, bobundi, bongo na bongo. Ebongi kopesa nzóto na mikáno mina.
Nazali komona makambo misusu ya ntina: eloko ya yambo ezali 'te "ngonga ezali mokuse". Sántu Polo alobaka yangó, kasi alobaka yangó po ya bomoi ya bisó, áwa tokoloba yangó po ya COP. Ngonga ezali mokuse, na motindo eye toyébi 'te ngonga ekotindika bisó makási. Ya noki mpenza ezali bôngó sik’oyo, noki ena esengeli ezala wana. Lisusu, ezali loléngé ya masangá ya bikóló ebelé: motuná ya mbongwana ya klima ekomi mpenza libakú lyoko ya kozongisa masangá ya bikóló eye ezuaki mbéba yoko makási mibú mileki. Bizali waná ba nzelá miye tosengeli kokende pe kosála.
Mokolo eye ya minei, ozalaki lokóla na likambo lyoko, na bobimi mwá moke na misála ya COP po ya kokutana na makambo miye mikobongola bato, mingi mpenza bana...
Tokendeki na Marituba epái wápi ezali lopitalo yoko ya kitoko etongamaka na Mgr Aristides Pirovano, waná Marcello Candia asálaka lokóla, pe leló epesama na babola basálisi ya Divine Providence, ekelami na Don Calabria. Káti ya makambo misusu ya esalelo ena, tokendeki lokóla na Fazenda da Esperança (Ferme ya elikya), likanisi lyoko elamu etáli bána ya esika ena -esika yoko, na loléngé ya bato, ezali kobangisa makási- pe ekosunga na kolakisa bána ndéngé moko mosusu, na káti waná Bokeli. Namonaki yangó kitoko makási, namonaki mabongami na bangó nionso, bisika bazali kolona, bobimisi ya biogaz úta ba mpumbulu. Biloko bikamwisi ngai pe bisálemi na bána. Ezali lokóla loléngé ya kosálisa bangó ya kobima na bisika bizali mabé. Na bosalisi bangó ya kosála elongo po ya kosála eye bansó tolingi: mokili moko ya sémbo koleka, mokili moko malámu koleka, mokili moko ya lisangá koleka.
Po ya mokili moko ya sémbo koleka, tokoki kobánda na bána lokóla omonaki?
Iyo, tokoki kobánda na bangó. Nakutanaki na misusu káti na bangó, namonaki lokóla bazali na mayéle makoka na yangó. Etiki ngai na likanisi molámu. Bizali bangó bakambi ngai o botáli ena pe namonaki 'te bazalaki na mayéle po ya ntembe, kasi lokóla likoki ya kolonga ntembe yangó likoló ya likabo na bangó.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló eye.