Nzeté ya Mbótama etelemi na esika Sántu-Petelo
Vatican News
Na lisálisi ya zéki (grue), nzeté ya Mbótama (sapin de Noël) etelemisami na tóngo, 27 ya sánzá ya zómi na yoko, na esika Sántu-Petelo, na ndámbo ya etando esúkisami na esika wápi ekotóngama lokóla elielo (crèche) ekoúta na etúka ya Salerne, na Campanie, pe eye ekozala na biloko bisusu bizalaka kaka na etónga ya Nocera.
Nzeté ya metele 27 eúti na lobwakú ya Alpes ya Ultimo, na etúka ya Bolzano, na Trentin-Haut-Adige. Epesamaki na ba commune ya Lagundo pe Ultimo. « Bobúki nzete ezali ekelá lyoko ya bozangi botosi te, kasi mbuma ya boyangeli zámba na ndéngé ya bokébi, epái wápi bobúki ezali káti ya bobáteli elongobami eye ekolaka bokólóngónó ya zámba pe botáli bokóli na yangó », elobaki Mgr Ivo Muser, episkopo ya Bolzano-Bressanone.
Kokámwa libosó ya Bokeli
« Nakolikia ‘te nzeté na bisó ya Mbótama ekobimisa lokóla likamwisi libosó ya Bokeli, elobaki episkopo na lisoló lyoko ebimaki na site web ya Letá ya Engúmba ya Vatican, pe ekotindá na likanisi. Tozali na pósá ya bato ya bokébi, ya bokamwi pe ya botosi, baye babongami lokóla ya kozua ba loléngé ya bomoi ya seko pe bosáwá ».
Ba nzeté bibongami po ya kongengisa Vatican o eleko ua Mbótama 2025 -ya yambo ya Papá Léon XIV- biúti lokóla na Haut-Adige. Na bolongoli nzeté ya motáné (sapin rouge), ba nzeté misusu ya mikúsé bikotiama na ba buro pe ba ndáko ya Ngwendé ya Sántu-Petelo pe ya Letá ya Engúmba ya Vatican. Bipesami bansó na ba commune ya Lagundo pe Ultimo, na etúka ya Merano.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.